Bomengo

Biblia emonisi makanisi ya bwanya na ntina ya biloko: Nzambe akoki kopambola na bomengo, kasi ekebisi na ntina ya makama na yango, mpe elobi ete bomengo ya solo ezali boyokani na Ye. Biloko eumelaka te, ekoki kosomba lobiko te, mpe ekoki komema lolendo, bokabwani mpe kozanga mbuma na molimo.

Makanisi ya Biblia na likambo ya biloko

Makanisi ya Nkolo na likambo ya bomengo

Nayebi minyoko mpe bobola na yo, nzokande ozali mozwi ; nayebi ndenge nini bato oyo balobaka ete bazali Bayuda, kasi bazali na bango Bayuda te, batiolaka yo ; bazali nde ndako ya mayangani ya Satana. (Emoniseli 2:9)

Makanisi ya bato na likambo ya biloko

Tika ete moto oyo azali na nzala asilisa mbuma ya elanga na ye, akamata yango kino kati na basende ; mpe tika ete moto ya lokoso asilisa bomengo na ye ! › (Yobo 5:5)
...akotikala kokoma mozwi te, pamba te bozwi na ye ekowumela te, bomengo na ye ekopanzana te kati na mokili mobimba ; (Yobo 15:29)
...bana na ye basengeli kofuta lomande epai ya babola, maboko na ye ekozongisa bozwi oyo abotolaki, (Yobo 20:10)
Amelaki na pamba bozwi ebele, asengeli kosanza yango ; Nzambe akofutisa ye yango. (Yobo 20:15)
...akozongisa bambuma ya mosala na ye mobimba, akomela ata moko te, akotikala kosepela te na litomba oyo azwaki na mombongo na ye. Pamba te anyokolaki babola mpe atikaki bango lokola bato bazangela, abotolaki ndako ya bato na esika ya kotonga ndako na ye moko. Solo, lokoso na ye ya kozwa mingi ekosila te, akoki komibikisa te na nzela ya bomengo na ye. (Yobo 20:18-20)
Molili makasi ezali kozela libula na ye, moto makasi oyo moto apelisi te ekozikisa ye elongo na biloko oyo ekotikala kati na ndako na ye. (Yobo 20:26)
...mayi ekomema ndako na ye mpe biloko nyonso ya ndako na ye, na mokolo ya kanda ya Nzambe. (Yobo 20:28)
...bazali kolekisa mikolo na bango na bomengo, mpe bazali kokende na mboka ya bakufi na kimia. (Yobo 21:13)
Boni, bozwi na bango ezali kati na maboko na bango moko te ? Kasi mosika na ngai, likanisi ya kolanda toli ya bato mabe ! (Yobo 21:16)
Soki ozongi epai na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, soki obengani mabe mosika ya ndako na yo, bomengo na yo ekozongela yo. Bwaka wolo na yo kati na putulu, wolo na yo ya Ofiri kati na mabanga ya lubwaku ; bongo Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akozala wolo na yo, mpe palata oyo eleki kitoko mpo na yo. (Yobo 22:23-25)
Tala lifuti oyo Nzambe abongiseli moto mabe, libula oyo moto ya mobulu azwaka epai ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso : (Yobo 27:13)
Ata soki asangisi palata lokola putulu mpe bilamba lokola mipiku ya mabele, nyonso oyo abongisi, moto ya sembo nde akolata yango, mpe bato oyo basali mabe te nde bakokabola palata na ye. (Yobo 27:16-17)
Soki batosi mpe basaleli Ye, bakolekisa mikolo na bango oyo etikali na bomengo, mpe mibu na bango na esengo. (Yobo 36:11)
Boni, bozwi na yo ezali solo na motuya mpo na kokangola yo ? Ezala mabanga na yo ya wolo to makasi na yo nyonso, boni, ekokoka solo kokangola yo ? (Yobo 36:19)
Bwanya ezali lokola libula, ezalaka malamu mpe epesaka litomba na bato oyo bamonaka moyi. Bwanya ezali lokola nguba, ndenge mpe mosolo ezalaka nguba ; kasi litomba ya boyebi ezali ete ebatelaka bomoi ya bato oyo bazali na yango. (Mosakoli 7:11-12)

Tozwaka eloko te ntango tokufaka

Komitungisaka te soki moto moko akomi kofuluka na bozwi, soki kongenga ya ndako na ye ekomi komata se komata. Pamba te akomema ata eloko moko te tango akokufa ; bomengo na ye ekolanda ye te. Atako, wana azalaki na bomoi, azalaki komimona moto apambolama— atako bato bakokumisa yo, pamba te omisali bolamu— okokende kaka kokutana na bakoko na yo oyo bakotikala komona lisusu pole te. Moto oyo azali mozwi, kasi azangi bososoli, azali lokola nyama oyo ezali kokufa. (Banzembo 49:17-21)
Namoni mabe moko na se ya moyi, epesaka penza mawa : moto abombi bomengo na ye, kasi ememeli ye pasi ; likambo moko ya mabe ya mbalakata ebebisi bomengo yango, mpe mwana na ye azangi libula ya kokitana na yango. Ndenge abotamaki bolumbu wuta na libumu ya mama na ye, ndenge mpe akozanga bolumbu, akomema ata mbuma moko te ya mosala na ye. (Mosakoli 5:12-14)
Pamba te, toyaki maboko pamba kati na mokili, mpe tokozonga maboko pamba. (1 Timote 6:7)
Moto akendaka mpe azongaka, azali kaka lokola elili ; amitungisaka kaka pamba, andukaka bomengo, kasi ayebaka te soki nani akotikala na yango. (Banzembo 39:7)

Okoki kosomba lisiko ya molimo na yo te

Mpo na nini nabanga na tango ya pasi, tango mabe ya bakosi ezingeli ngai, ba-oyo batielaka bomengo na bango motema mpe bamikumisaka mpo na bofuluki ya bozwi na bango ? Moko te akoki kosikola ndeko na ye, moko te akoki kofuta mbongo epai ya Nzambe mpo na lisiko na ye. Talo ya bomoi na ye eleki motuya makasi, mpe ekotikala kofutama te. (Banzembo 49:6-9)
Bomengo ekolongisa ata moke te na mokolo ya kanda ya Nzambe, kasi bosembo ekangolaka na kufa. (Masese 11:4)
Litomba nini ekozala mpo na moto, soki azwi mokili mobimba, kasi abungisi bomoi na ye ? Moto akoki penza kopesa nini mpo na kosikola bomoi na ye ? (Matayo 16:26)
Litomba nini ezali mpo na moto, soki azwi mokili mobimba, kasi abungisi bomoi na ye ? Moto akoki penza kopesa nini mpo na kosikola bomoi na ye ? (Malako 8:36-37)
Litomba nini ezali mpo na moto, soki azwi mokili mobimba, kasi amibungisi to abebisi bomoi na ye ? (Luka 9:25)

Bomengo ememaka “baninga” mingi

Mobola ayinamaka ata epai na moninga na ye moko, kasi mozwi azalaka na baninga ebele. (Masese 14:20)
Mozwi azalaka na baninga ebele, kasi mobola akabwanaka ata na molingami na ye ya motema. (Masese 19:4)

Bomengo eumelaka te

Koboma nzoto te mpo na koluka kozwa bomengo, kotia mayele na yo te kati na yango. Tango okobwaka miso na ngambo ya bomengo, ekobunga, pamba te ezalaka na mapapu mpe epumbwaka na likolo makasi lokola mpongo. (Masese 23:4-5)
Mpo na kondima, wana Moyize akomaki mokolo, aboyaki ete babenga ye « mwana mobali ya mwana mwasi ya Faraon. » Aponaki komona pasi elongo na bato ya Nzambe, na esika ya kosepela mwa tango moke na bomoi ya masumu ; pamba te amonaki ete kotiolama lokola Klisto ezali malamu koleka bomengo ya Ejipito, mpo ete azalaki kotalela lifuti oyo ezali koya. (Ba-Ebre 11:24-26)
Komekama yango eyei mpo na kotalisa bosolo ya kondima na bino mpe kosala ete bokoka kozwa masanzoli, nkembo mpe lokumu tango Yesu-Klisto akomonana. Boni, moto epetolaka wolo te ? Nzokande kondima na bino ezali na motuya koleka wolo oyo ebebaka. (1 Petelo 1:7)
Boyebi malamu ete ezali te na nzela ya biloko oyo ebebaka lokola wolo to palata nde Nzambe akangolaki bino na bizaleli ezanga tina, oyo bozwaki epai ya bakoko na bino, (1 Petelo 1:18)

Biloko nyonso ezali eloko te soki tokokanisi yango na koyeba Yesu

Kasi makambo oyo nazalaki komona ete ezali na tina mpo na ngai, nakomi sik’oyo komona yango pamba mpo na Klisto. Kaka yango te, nazali kutu komona makambo nyonso lokola eloko pamba likolo ya bolamu oyo eleki monene : koyeba Yesu-Klisto, Nkolo na ngai. Ezali mpo na Ye nde ngai nandimaki kobungisa makambo wana nyonso mpe nazali komona yango lokola bisanza, mpo ete nakoka kozwa Klisto (Bafilipi 3:7-8)

Bomengo ezali ya solo te

Pesa mitindo epai ya bazwi kati na mokili oyo ete bazala na lolendo te mpe batia elikya te na bomengo, pamba te bomengo ekoki kosila ; kasi tika ete batia elikya na bango kati na Nzambe oyo apesaka biso biloko nyonso, na bofuluki, mpo ete tosepela na yango. (1 Timote 6:17)

Bomengo ezali na ntina te soki Nkolo azali te

Nazwaki mokano ya kosalisa misala minene : namitongelaki bandako minene mpe namilonelaki bilanga ya vino mpo na bomoi na ngai ; nasalaki bilanga mpe nabongisaki bisika mpo na kolona banzete ya ndenge na ndenge, oyo ebotaka bambuma ; natimolaki mpo na ngai moko, mabulu minene ya mayi mpo na kosopela banzete ya mike mayi. Nasombaki bawumbu ya mibali mpe ya basi ; kobakisa na motango ya bawumbu mosusu oyo babotamaki kati na ndako na ngai. Nazalaki mpe na bangombe, bantaba mpe bameme ebele koleka bakonzi nyonso oyo bazalaki na Yelusalemi liboso na ngai. Nakongolaki mpo na ngai moko palata mpe wolo oyo ewutaki na bomengo ya bakonzi mpe ya bituka ; nazwaki mpo na ngai bayembi ya basi mpe ya mibali, mpe oyo esepelisaka makasi mibali : mwasi mpe basi ebele ya kitoko. Nakomaki moto monene koleka bakonzi nyonso oyo bazalaki na Yelusalemi liboso na ngai ; kasi atako bongo, bwanya ezalaki kaka kotambolisa ngai. Napimelaki miso na ngai eloko moko te oyo elulaki, napimelaki motema na ngai esengo moko te. Motema na ngai esepelaki na misala na ngai nyonso, mpe yango ezalaki lifuti ya mosala na ngai nyonso. Boye, tango natali misala nyonso oyo maboko na ngai esalaki mpe pasi nyonso oyo namonaki mpo na kokokisa yango, namoni ete nyonso wana ezalaki kaka pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe, ezali na yango na litomba moko te na se ya moyi. (Mosakoli 2:4-11)

Makambo oyo eleki bomengo na motuya

Bakoki kosomba yango te na motuya ya libanga ya wolo to na bakilo ya palata ; bakoki te kosomba yango na wolo ya Ofiri to na mabanga ya talo ya Onikisi to mabanga ya talo ya Safiri ; wolo to diama ekoki te kokokana na yango, bakoki kozwa yango te na motuya ya sani ya wolo ya kitoko. Mayaka ya Karayi mpe ya Jasipe ezali na motuya te liboso na yango. Motuya ya bwanya eleki pawuni ya talo. Topaze ya Kushi ekoki kokokana na yango te, mpe bakoki te kosomba yango ata na wolo ya peto. (Yobo 28:15-19)
Mwa biloko ya moto ya sembo eleki bozwi ya bato ebele ya mabe, (Banzembo 37:16)
Nasepelaka kotambola kolanda malako na Yo lokola nde nazali na bomengo nyonso. (Banzembo 119:14)
Mpo na ngai, mibeko oyo ozwaki mpe osakolaki na monoko na Yo ezali malamu koleka biloko nkoto moko ya wolo mpe ya palata. (Banzembo 119:72)
Yango wana nalingaka mibeko na Yo koleka wolo, koleka kutu wolo ya peto ; (Banzembo 119:127)
Esengo na moto oyo amoni bwanya ! Esengo na moto oyo azwi mayele ! Pamba te kozala na yango eleki kozala na palata na motuya, mpe lifuti na yango eleki wolo oyo balekisi na moto na motuya. Ezali na motuya koleka babiju, mpe eloko moko te oyo moto akoki koluka ekokani na yango. Kati na loboko na Ye ya mobali, ezali na bomoi ya molayi ; mpe kati na loboko na Ye ya mwasi, ezali na lokumu mpe bomengo. (Masese 3:13-16)
Boluka mateya na ngai kasi palata te, boyebi kasi wolo te oyo eleki peto, pamba te bwanya ezali na motuya koleka mayaka ya kitoko, bongo eloko moko te ya motuya ekokani na yango. (Masese 8:10-11)
Bozwi mpe lokumu, bomengo oyo ewumelaka mpe bosembo etambolaka elongo na ngai. Mbuma na ngai ezali kitoko koleka wolo, ezala wolo ya peto, mpe mbuma oyo nabotaka eleki palata ya kitoko. Natambolaka na nzela ya bosembo, mpe nasalelaka banzela oyo ememaka na boyengebene, mpo na kopesa libula epai ya bato oyo balingaka ngai mpe mpo na kotondisa bibombelo na bango. (Masese 8:18-21)
Kozala na eloko moko kati na kotosa Yawe ezali malamu koleka kozala na bomengo mingi kati na komitungisa. (Masese 15:16)
Kozwa biloko moke kati na bosembo ezali malamu koleka kozwa bomengo ebele kati na nzela ya mabe. (Masese 16:8)
Bwanya ezali malamu koleka wolo, mpe kozwa mayele ezali na litomba koleka palata. (Masese 16:16)
Kozala moto ya komikitisa mpe kozala elongo na bato bakelela ezali malamu koleka kokabola bomengo ya bitumba elongo na bato ya lolendo. (Masese 16:19)
Mobola oyo atambolaka na bosembo azali malamu koleka mokosi oyo azangi mayele. (Masese 19:1)
Wolo mpe babiju ezalaka na yango ebele, kasi bibebu oyo ebimisaka boyebi eleki na motuya. (Masese 20:15)
Kokende sango ya malamu ezali malamu koleka kozala na bomengo mingi ; lokumu ezali malamu koleka palata mpe wolo. (Masese 22:1)
Mobola oyo atambolaka na bosembo azali malamu koleka mozwi oyo nzela na ye ezali mabe. (Masese 28:6)

Bakosenga mingi epai ya baoyo bapesami mingi

Kasi mosali oyo ayebi te posa ya nkolo na ye mpe asali makambo oyo ebongi na etumbu, akobetama fimbu moke. Na moto oyo bapesi mingi, bakosenga ye mpe mingi ; mpe bakotuna na moto na moto kolanda mokumba oyo bapesi ye : na moto oyo bapesi mingi, bakotuna ye mpe mingi ; mpe na moto oyo bapesi moke, bakotuna ye moke. (Luka 12:48)

Mapamboli ya bomengo

Bato ya sembo bakozwa bozwi lokola mbano

Mabe elandaka bato ya masumu, kasi bolamu ezali lifuti ya bato ya sembo. (Masese 13:21)
Ezalaka na bomengo ebele kati na ndako ya moyengebene, kasi lifuti ya moto mabe ememaka pasi. (Masese 15:6)

Bomengo mpo na moto oyo akanisaka Liloba ya Nzambe

Esengo na moto oyo alandaka te toli ya bato mabe, atelemaka te na nzela ya bato ya masumu, mpe avandaka te esika moko na batioli, kasi asepelaka na mibeko ya Yawe mpe akanisaka yango butu mpe moyi. Azali lokola nzete oyo balona pene ya mayi, oyo ebotaka mbuma na eleko na yango, mpe makasa na yango ekawukaka te ; misala na ye nyonso etambolaka malamu. (Banzembo 1:1-3)

Bato oyo bazwi bakogumbamela Nkolo

Bazwi nyonso ya mokili bakolia mpe bakogumbamela Ye ; bato nyonso oyo bazali kokende na kunda, ba-oyo bakoki te komibatela na bomoi, bakogumbama liboso na Ye. (Banzembo 22:30)

Kobondela mpo na bozwi

...mpo ete namona esengo ya baponami na Yo, nasepela na bolamu ya ekolo na Yo mpe nasepela elongo na libula na Yo ! (Banzembo 106:5)
Bosenga kimia ya Yelusalemi ! Tika ete bato oyo balingaka yo, Yelusalemi, babika na kimia ! Tika ete kimia ezala kati na yo mpe kati na bandako na yo ya bokonzi ! (Banzembo 122:6-7)
Solo, Yawe akopambola yo wuta na Siona, mpe okomona bofuluki ya Yelusalemi mikolo nyonso ya bomoi na yo (Banzembo 128:5)
Molingami na ngai, posa makasi ya motema na ngai ezali ete okende liboso na makambo na yo nyonso, mpe ozala na nzoto kolongono, ndenge molimo na yo ezali kokola. (3 Yoane 2)

Bazwi oyo babangaka Nzambe

Abrami azwaki mwasi na ye Sarayi ; Loti, mwana ya ndeko na ye ; bomengo nyonso oyo akomaki na yango mpe bato oyo azwaki na Arani. Babimaki wuta na Arani mpo na kokende na Kanana mpe bakomaki kuna. (Ebandeli 12:5)
Abrami akomaki na bozwi mingi : bibwele, palata mpe wolo. (Ebandeli 13:2)
Boye, Yawe alobaki na Abrami : — Yeba solo ete bakitani na yo bakozala bapaya kati na mokili ya bapaya epai wapi bakozala bawumbu ; mpe bakonyokola bango kuna mibu nkama minei. Kasi nakopesa etumbu na ekolo oyo ekokomisa bango bawumbu ; mpe na sima, bakobima longwa na mokili yango elongo na bozwi ebele. (Ebandeli 15:13-14)
Abrayami akomaki mobange mpe mibu ya bomoi na ye epusanaki. Yawe apambolaki ye na makambo nyonso. (Ebandeli 24:1)
Elenge mwasi azalaki kitoko penza, ayebaki nanu nzoto ya mibali te ; ata mobali moko te asangisaki na ye nzoto. Akitaki na libulu ya mayi, atondisaki mbeki na ye mpe amataki. (Ebandeli 24:16)
Yawe apambola mingi nkolo na ngai mpe akomisa ye mozwi : apesa ye bameme, bantaba, bangombe, palata mpe wolo, basali ya mibali mpe ya basi, ba-ane mpe bashamo. (Ebandeli 24:35)
Izaki alonaki mbuma na mabele oyo mpe abukaki monkama na monkama na oyo alonaki, pamba te Yawe apambolaki ye. Izaki akomaki mozwi, mpe bozwi na ye ekobaki kaka komata kino akomaki moto na bozwi ebele. Bato ya Filisitia bakomaki koyokela ye likunya, pamba te azalaki na bameme ebele, bantaba ebele, bangombe ebele mpe basali ebele. (Ebandeli 26:12-14)
Na nzela wana nde moto oyo akomaki na bozwi mingi koleka. Azwaki bibwele ebele, basali ya basi mpe ya mibali, bashamo mpe ba-ane. (Ebandeli 30:43)
Nabondeli yo penza, ndima makabo oyo namemeli yo ; pamba te Nzambe nde apesaki ngai yango na ngolu na Ye mpe nazali na nyonso. Lokola Jakobi azalaki kaka kotia molende, Ezawu andimaki kozwa yango. (Ebandeli 33:11)
Faraon alongolaki lopete na ye na mosapi na ye mpe atiaki yango na mosapi ya Jozefi. Alatisaki ye bilamba ya lino ya kitoko mpe atiaki ye singa ya wolo na kingo. (Ebandeli 41:42)
Boyebisa tata na ngai lokumu nyonso oyo nazali na yango awa na Ejipito, boyebisa ye makambo nyonso oyo bosili komona mpe bomemela ngai ye awa na lombangu. › » (Ebandeli 45:13)
Bamemaki lisusu bibwele na bango mpe biloko nyonso oyo bazalaki na yango na mokili ya Kanana ; mpe Jakobi elongo na bakitani na ye nyonso bakendeki na Ejipito. (Ebandeli 46:6)
Boye bana ya Isalaele bavandaki na Ejipito, na Gosheni. Kuna bakomaki na bozwi ebele, babotaki bana mpe bakomaki ebele. (Ebandeli 47:27)
Alobaki na bango : « Bozonga na bandako na bino na bozwi ebele, na bibwele ebele, na palata, na wolo, na bronze, na bibende, mpe na bilamba ebele. Bokabola elongo na bandeko na bino bomengo ya bitumba oyo bosili kozwa epai ya banguna na bino. » (Jozue 22:8)
Naomi azalaki na ndeko moko kati na libota ya mobali na ye ; ndeko yango azalaki ya etuka ya Elimeleki, azalaki penza na bozwi mingi ; kombo na ye ezalaki « Boazi. » (Rite 2:1)
Oh bino bana basi ya Isalaele, bolela mpo na Saulo oyo alatisaki bino bilamba ya motane mpe biloko ya monzele, oyo atondisaki babiju ya wolo na bilamba na bino. (2 Samuele 1:24)
Tango mwasi mokonzi ya Saba amonaki bwanya nyonso ya Salomo, ndako oyo atongaki, Nandimaki te makambo oyo bazalaki koloba na tina na yango kino tango ngai moko nayei mpe namoni yango na miso na ngai moko. Nzokande, kolanda oyo ngai namoni, makambo oyo bayebisaki ngai te na tina na bwanya yango ezali penza kati-kati ! Solo, bwanya mpe bozwi na yo eleki sango ya lokumu oyo nayokaki na tina na yo. (1 Bakonzi 10:4, 7)
Nzambe alobaki na ye : — Lokola osengi bwanya, kasi osengi bomoi molayi te to bomengo mpo na yo moko te ; lokola osengi kufa ya banguna na yo te, kasi osengi bwanya mpo na kokata makambo na bosembo, nakosala nyonso oyo osili kosenga. Nakopesa yo motema ya bwanya mpe ya mayele, na lolenge oyo natikala nanu te kopesa na moto moko liboso na yo ; mpe sima na yo, moto moko te akotikala kozala lokola yo. Nakopesa yo lisusu oyo osengi te : bomengo mpe lokumu. Na bongo, na bomoi na yo mobimba, mokonzi moko te akokokana na yo. (1 Bakonzi 3:11-13)
Salomo avandaki na Kiti ya Bokonzi ya Yawe lokola mokonzi na esika ya Davidi, tata na ye. Apambolamaki mpe Isalaele mobimba etosaki ye. (1 Masolo ya Kala 29:23)
Akufaki na kimobange ya esengo. Atondisamaki na mibu ebele, na bozwi mpe na lokumu ; bongo Salomo, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. (1 Masolo ya Kala 29:28)
Nzambe alobaki na Salomo : — Lokola likambo oyo ezali posa ya motema na yo ; lokola osengi bozwi te, bomengo to lokumu te to mpe kufa ya banguna na yo te ; lokola osengi te bomoi molayi, kasi osengi bwanya mpe boyebi mpo na kotambolisa bato na Ngai, oyo natie yo mokonzi na bango, bwanya mpe boyebi ekopesamela yo, mpe nakopesa yo lisusu bozwi, bomengo mpe lokumu oyo mokonzi moko te, liboso na yo, atikala kozwa, mpe mokonzi moko te, sima na yo, akotikala kozwa. (2 Masolo ya Kala 1:11-12)
Mokonzi Salomo alekaki bakonzi nyonso ya mokili na bozwi mpe na bwanya. (2 Masolo ya Kala 9:22)
Yawe alendisaki bokonzi oyo ezalaki na maboko ya Jozafati, mpe Yuda mobimba ezalaki komemela ye bakado. Akomaki na bozwi ebele mpe atondaki na lokumu. (2 Masolo ya Kala 17:5)
Bato ya Filisitia bamemelaki Jozafati bakado mpe palata lokola mpako mpo na mokonzi ; mpe bato ya Arabi bamemelaki ye bameme ya mibali nkoto sambo na nkama sambo mpe bantaba ya mibali nkoto sambo na nkama sambo. Wana nguya ya bokonzi ya Jozafati ekobaki kaka koya makasi, atongaki kati na Yuda bandako makasi mpe bingumba ya kobomba biloko. (2 Masolo ya Kala 17:11-12)
Mokonzi Jozafati akomaki na lokumu mingi mpe na bozwi ebele, asalaki boyokani elongo na Akabi na nzela ya libala. (2 Masolo ya Kala 18:1)
Ezekiasi azalaki na bozwi ebele mpe na lokumu mingi, abombaki palata, wolo, mabanga ya talo, biloko ya solo kitoko, banguba mpe biloko nyonso ya talo. Atongaki bibombelo ya ble, ya vino ya sika mpe ya mafuta ; atongaki lisusu mapango mpe bandako mpo na bibwele na ye. Atongaki bingumba mpe akomaki na bibwele ebele : bantaba, bameme mpe bangombe. Nzambe apesaki ye bozwi mingi. Ezali mpe Ezekiasi moto akangaki monoko ya etima ya Giyoni mpe alekisaki mayi na yango na se ya mabele, na ngambo ya weste ya engumba ya Davidi. Ezekiasi azalaki kolonga na misala na ye nyonso. (2 Masolo ya Kala 32:27-30)
Babotolaki bingumba batonga makasi mpe mabele oyo ebotaka malamu. Babotolaki bandako etonda na biloko ya ndenge na ndenge, mabulu ya mayi batimola wuta kala, bilanga ya vino, ya nzete ya olive mpe ya nzete mosusu ebele oyo ebotaka mbuma ya kolia. Na bolingo monene na Yo, baliaki mpe batondaki, bakomaki minene mpe basepelaki na mapamboli na Yo nyonso. (Neyemi 9:25)
...mpe azalaki na etonga ya bameme nkoto sambo, bashamo nkoto misato, bangombe nkoto moko, ba-ane nkama mitano, mpe azalaki na basali ebele penza. Alekaki bato nyonso ya Este na lokumu. (Yobo 1:3)
Sima na yango, mokonzi atombolaki Shadraki, Meshaki mpe Abedinego kati na etuka ya Babiloni. (Daniele 3:30)
Tango pokwa ekomaki, mozwi moko ayaki ; kombo na ye ezalaki Jozefi, moto ya mboka Arimate ; ye mpe akomaki moyekoli ya Yesu. (Matayo 27:57)
Bosili kotondisama na nyonso oyo bozalaka na makanisi ya kozwa ! Bosili penza kokoma bato ya bomengo ! Bobandi kokonza ; bobandi kokonza elongo na biso te ! Nalingaka ete bobanda penza kokonza, mpo ete biso mpe tokonza elongo na bino ! Kino sik’oyo, tozali konyokwama na nzala, na posa ya mayi, tozangi bilamba, tozali kobetama, tozali koyengayenga, mpe tozali kosala mosala makasi na maboko na biso. Tango bafingaka biso, topambolaka ; tango banyokolaka biso, toyikelaka yango kaka mpiko ; (1 Bakolinto 4:8, 11-12)
Nalobi bongo te mpo ete nazali kokelela, pamba te nayekola kosepela na oyo nazali na yango. Nayebi kobika na tango ya kokelela, mpe nayebi kobika na tango ya bozwi. Kati na makambo nyonso mpe na tango nyonso, nayekola kozala na esengo : ezala soki nazali na bilei to nazangi yango, ezala soki nazali na bozwi to nakeleli. Nazali na makoki ya kosala makambo nyonso na nzela na Ye oyo apesaka ngai makasi. Nzokande bosalaki malamu, wana bosanganaki na pasi na ngai. Bino bato ya Filipi, boyebi malamu ete, na ebandeli ya mosala na ngai ya koteya Sango Malamu, wana nalongwaki na Masedwane, ata Lingomba moko te esanganaki na ngai na nzela ya lisungi, longola kaka bino. Tango mpe nazalaki na Tesalonika, botindelaki ngai mbala mibale lisungi ya biloko oyo nazalaki na yango na bosenga. Ezali te ete nazali koluka makabo kowuta epai na bino, kasi nazali koluka ete bambuma ya bolamu na bino efuluka lisusu koleka. Natatoli ete nasili kozwa biloko ebele penza mpe nakomi na yango ebele koleka, awa nazwi, na maboko ya Epafrodite, makabo oyo botindelaki ngai ; yango ezali lokola malasi ya solo kitoko, mbeka oyo Nzambe andimi mpe oyo ezali kosepelisa Ye. (Bafilipi 4:11-18)

Nkolo asepelaka na bozwi ya basaleli na Ye

Tika ete bato oyo basepelaka na bosembo na ngai baganga na esengo mpe basepela ; tika ete balobaka tango nyonso : « Tika ete Yawe anetolama, Ye oyo asepelaka na kimia ya mowumbu na Ye ! » (Banzembo 35:27)

Bato nyonso bakozwa bozwi te

Bamosusu batiolamaki, babetamaki fimbu, batiamaki minyololo mpe babwakamaki na boloko ; bamosusu babomaki bango na mabanga, bakataki bango na biteni mibale na si, babomaki bango na mopanga, bakomaki na bomoi ya koyengayenga mpe bakomaki kolata baposo ya bameme mpe ya bantaba ; bakelelaki na nyonso, banyokolaki bango mpe bayokisaki bango pasi : ya solo, mokili etikalaki lisusu malamu te mpo na bango, bakomaki koyengayenga kati na bisobe, na bangomba, kati na bibombamelo ya mabanga mpe na mabulu oyo ezalaka na se ya mabele. Kati na bango nyonso wana, atako Nzambe asepelaki na bango mpo na kondima na bango, moko te azwaki biloko oyo Nzambe alakaki bango. Nzambe asalaki mabongisi ya kitoko penza mpo na biso, pamba te alingaki ete bakoma bato ya kokoka nzela moko na biso. (Ba-Ebre 11:36-40)

Yesu abongi kozwa bomengo

...mpe bazalaki koloba na mongongo makasi : « Mpate oyo babomaki abongi na kozwa nguya, bomengo, bwanya mpe makasi, lokumu, nkembo mpe masanzoli. » (Emoniseli 5:12)

Bato ya bwanya bakoki kokoma bazwi

Bozwi ya bato ya bwanya ezalaka lokola motole na bango, kasi bozoba ya bato oyo bazangi mayele ezalaka lokola liboma. (Masese 14:24)

Ndenge bazwaka bomengo

Ndako etongamaka na nzela ya bwanya, mpe elendisamaka na nzela ya mayele. Bashambre ekotondisama na biloko nyonso ya talo mpe ya kitoko na nzela ya boyebi. (Masese 24:3-4)

Makambo oyo epekisaka bato kozwa bomengo

Moto oyo alingaka biyenga akokoma mobola ; moto oyo alingaka masanga ya vino mpe mafuta akotikala kokoma mozwi te. (Masese 21:17)
Moto oyo anyokolaka mobola mpo ete akoma na bomengo mingi mpe oyo apesaka mozwi bakado bakokweya na bobola. (Masese 22:16)

Makama ya bomengo

Kolinga bomengo

Botiaka elikya te na mileki ya moyibi, mpe botielaka yango motema te ; soki bomengo na bino ekomi ebele, bokangama na yango te. (Banzembo 62:11)

Lolendo

Na bwanya mpe na mayele na yo, okomi na bozwi mpe otondisi wolo mpe palata kati na bibombelo na yo. Lokola ozalaki mayele makasi na mosala ya mombongo, oyeisi bomengo na yo ebele makasi ; mpe mpo na bomengo na yo, motema na yo etondi na lolendo. (Ezekieli 28:4-5)
Pesa mitindo epai ya bazwi kati na mokili oyo ete bazala na lolendo te mpe batia elikya te na bomengo, pamba te bomengo ekoki kosila ; kasi tika ete batia elikya na bango kati na Nzambe oyo apesaka biso biloko nyonso, na bofuluki, mpo ete tosepela na yango. (1 Timote 6:17)

Bazwi basengeli komitombola te mpo bomoi ezali mokuse

Tika ete ndeko oyo akelela asepela mpo ete Nzambe akotombola ye, mpe oyo azali mozwi asepela mpo ete Nzambe akokitisa ye ; pamba te mozwi akoleka lokola fololo ya elanga. Ndenge fololo ekawukaka, ekweyaka mpe ebungisaka kitoko na yango na tango ya moyi makasi, ndenge wana mpe mozwi akolimwa kati na misala na ye nyonso. (Jake 1:9-11)

Mikumisa na Nkolo, na bomengo te

Tala liloba oyo Yawe alobi : « Tika ete moto ya bwanya amikumisa te mpo na bwanya na ye to moto ya makasi mpo na makasi na ye to moto ya bozwi mpo na bozwi na ye. Kasi tika ete moto oyo alingi komikumisa amikumisa mpo ete azali na bososoli mpe ayebi Ngai, mpo ete ayebi ete nazali Yawe oyo atalisaka bolamu, bosembo mpe boyengebene na mokili ; pamba te nasepelaka nde na makambo wana, » elobi Yawe. (Jeremi 9:22-23)

Bomengo epesaka bato makanisi ete bazali na libateli

Bomengo ya mozwi ezali engumba na ye, oyo batonga makasi, kasi bobola ya bato bakelela ezali libebi na bango. (Masese 10:15)
Bomengo ya mozwi ezali engumba na ye, oyo batonga makasi ; akanisaka ete ezali lokola mir ya molayi. (Masese 18:11)
Tango nazalaki na kimia, nalobaki : « Nakotikala kokweya te. » Yawe, tango osalelaki ngai ngolu, olendisaki ngomba na ngai ; kasi tango obombelaki ngai elongi, nabungisaki elikya. (Banzembo 30:7-8)

Baoyo batiaka motema na bomengo

Solo, tomonaka bato ya bwanya kokufa elongo na zoba mpe moto oyo azangi mayele, mpe batikaka bomengo na bango epai ya bato mosusu. Bakunda na bango nde ekomaka bandako na bango mpo na libela, mpe bisika na bango ya kovanda mpo na seko na seko, atako bapesaki na bitando na bango ya mabele bakombo na bango mpo ete ebengamaka na yango. Mozwi akowumelaka te na bomoi ; ata aleki na lokumu, akokani na nyama oyo ezali kokufa. (Banzembo 49:11-13)

Bomengo ekabolaka bato

Loti, oyo azalaki kotambola elongo na Abrami, azalaki mpe na bameme, bantaba, bangombe mpe basali. Boye etuka ekomaki moke mpo na bango mibale, pamba te bomengo na bango ezalaki ebele penza, mpe bakokaki lisusu te kovanda esika moko ; mpe koswana ekotaki kati na babateli bibwele ya Abrami mpe babateli bibwele ya Loti. Nzokande, na tango wana, bato ya Kanana mpe ya Perizi bazalaki kovanda kati na mokili yango. Abrami alobaki na Loti : « Tika ete koswana ezala te kati na ngai mpe yo to kati na babateli bibwele na yo mpe babateli bibwele na ngai, pamba te tozali bandeko. Mokili mobimba ezali liboso na yo. Ezali malamu tokabwana : soki yo okeyi na ngambo ya loboko ya mwasi, ngai nakokende na ngambo ya loboko ya mobali ; soki okeyi na ngambo ya loboko ya mobali, ngai nakokende na ngambo ya loboko ya mwasi. » Boye Loti atalaki mpe amonaki etando nyonso ya Yordani oyo ezalaki na mabele kitoko mpe ekenda kino na Tsoari. Liboso ete Yawe abebisa Sodome mpe Gomore, ezalaki lokola elanga ya Yawe, lokola mokili ya Ejipito. Loti aponaki etando ya Yordani mpe akendeki na ngambo ya este. Ezalaki ndenge wana nde bakabwanaki. (Ebandeli 13:5-11)
Izaki alonaki mbuma na mabele oyo mpe abukaki monkama na monkama na oyo alonaki, pamba te Yawe apambolaki ye. Izaki akomaki mozwi, mpe bozwi na ye ekobaki kaka komata kino akomaki moto na bozwi ebele. Bato ya Filisitia bakomaki koyokela ye likunya, pamba te azalaki na bameme ebele, bantaba ebele, bangombe ebele mpe basali ebele. Boye bato ya Filisitia bakundaki mabulu nyonso oyo basali ya Abrayami, tata na ye, batimolaki tango azalaki nanu na bomoi mpe batondisaki yango na mabele. Bongo Abimeleki alobaki na Izaki : — Kende mosika na biso, pamba te okomi na nguya mingi koleka biso. (Ebandeli 26:12-16)
Ezawu azwaki basi na ye, bana na ye ya mibali, bana na ye ya basi, bato nyonso ya ndako na ye mpe bibwele na ye, banyama na ye nyonso mpe biloko nyonso oyo azwaki na mokili ya Kanana, akendeki na mokili mosusu, mosika ya ndeko na ye Jakobi. Bomengo na bango ekomaki mingi penza, mpe bakokaki lisusu te kovanda esika moko ; pamba te mokili oyo bazalaki kovanda ekokaki bango lisusu te likolo ya motango ya bibwele na bango. (Ebandeli 36:6-7)
Mawa na bino bato oyo bobakisaka ndako likolo ya ndako, elanga pembeni ya elanga, kino bokangaka bisika nyonso mpe botikalaka kaka bino moko na mokili ! (Ezayi 5:8)

Bomengo ekoki kokabola baklisto

Liboso, nazali koyoka ete bozalaka na bokabwani kati na bino, tango boyaka na mayangani ; mpe nazali kondima yango mwa moke. Solo, bokabwani esengeli kozala kati na bino mpo ete Baklisto ya solo bayebana kati na bino. Boye, tango boyaka na mayangani, ezalaka lisusu te mpo na kolia bilei ya Nkolo ; pamba te emonanaka ete, soki kaka bokomi na mesa, moto na moto awelaka nanu kolia bilei na ye moko ; mpe mpo na yango, bamoko batikalaka na nzala, mpe bamosusu balangwaka. Boni, bozangi bandako oyo kati na yango bokoki kolia mpe komela ? Boni, bosalaka bongo mpo na kotiola Lingomba ya Nzambe mpe kosambwisa bato oyo bazangi bilei ? Nini nakoki koloba na bino ? Nakumisa bino ? Na likambo oyo, nakokumisa bino te ! (1 Bakolinto 11:18-22)

Bomengo ekosaka/ekoki kofinya kobota mbuma

Moto mabe asalaka mosala na lokuta, kasi moto oyo alonaka na bosembo akozwa lifuti ya malonga. (Masese 11:18)
Wana azalaki kobwaka nkona na ye, ndambo ekweyaki pembeni ya nzela ; bandeke eyaki mpe eliaki yango. Ndambo mosusu ekweyaki na esika etonda na mabanga, esika oyo mabele ezalaki mingi te, ebimisaki mito noki mpo ete mabele yango ezalaki na bozindo te ; Ndambo mosusu ekweyaki kati na banzube, banzube ekolaki mpe efinaki-finaki mwa banzete na yango ; Nkona oyo ekweyi kati na banzube ezali moto oyo ayoki Liloba, kasi baposa mabe ya mokili mpe lokoso ya bomengo efini-fini Liloba kati na ye. Boye akotikala mpe kobota bambuma te. (Matayo 13:4-5, 7, 22)
Azalaki koteya bango makambo ebele na masese. Na mateya na Ye, azalaki koloba : « Boyoka ! Moloni moko abimaki mpo na kolona. Ndambo mosusu ekweyaki kati na banzube ; banzube ekolaki mpe efinaki-finaki yango. Boye, ebotaki bambuma te. Bamosusu bazali lokola nkona oyo ekweyi kati na banzube : bayoki na bango Liloba ; kasi mitungisi ya bomoi, lokoso ya bomengo mpe baposa ya makambo ya mokili efini-fini Liloba kati na bango, boye ekotikala kobota bambuma te kati na bango. (Malako 4:2-3, 7, 18-19)
Ndambo mosusu ekweyaki kati na banzube ; banzube ekolaki nzela moko na yango mpe efinaki-finaki mito na yango. Nkona oyo ekweyaki kati na banzube ezali bato oyo, sima na koyoka Liloba, bamitikaka ete, na etamboli na bango, mitungisi ya bomoi ya mokolo na mokolo, bomengo mpe bisengo ya mokili efinafina bango, mpe ete babota te bambuma. (Luka 8:7, 14)

Ezali pasi mpo na mozwi kokota na Bokonzi

Elenge mobali moko apusanaki pene na Yesu mpe atunaki : — Moteyi, likambo nini ya malamu nasengeli kosala mpo ete nazwa bomoi ya seko ? Yesu azongisaki : — Mpo na nini ozali kotuna Ngai na tina na oyo ezali malamu ? Moko kaka azali malamu. Soki olingi kokota kati na bomoi, tosa mibeko. Elenge mobali yango atunaki lisusu : — Mibeko nini ? Yesu azongisaki : — Okobomaka te, okosalaka ekobo te, okoyibaka te, okolobaka litatoli ya lokuta te, okotosaka tata mpe mama na yo mpe okolingaka moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. Elenge mobali alobaki : — Natosaka mibeko wana nyonso ; nasala lisusu nini ? Yesu azongisaki : — Soki olingi kozala moto ya kokoka, kende, teka biloko na yo mpe pesa epai ya babola mbongo oyo okozwa ; bongo okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai. Tango elenge mobali ayokaki bongo, akendeki na mawa, pamba te azalaki na bozwi mingi. Yesu alobaki na bayekoli na Ye : — Nazali koloba na bino penza ya solo : ezali pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Likolo ! Nazali koloba na bino lisusu : ezali pete mpo na shamo kolekela na lidusu ya tonga, kasi ezali penza pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe. Tango bayekoli bayokaki Yesu koloba bongo, bakamwaki mingi mpe bakomaki kotunana : — Bongo nani penza akoki kobikisama ? Wana Yesu atalaki bango, alobaki : — Na bato, ekoki kosalema te ; kasi na Nzambe, nyonso ekoki kosalema ! (Matayo 19:16-26)
Wana Yesu azalaki kokende, moto moko apotaki mbangu mpo na koya epai na Yesu, afukamaki liboso na Ye mpe atunaki : — Moteyi malamu, nasengeli kosala nini mpo ete nazwa bomoi ya seko ? Yesu azongisaki : — Mpo na nini ozali kobenga Ngai « Moteyi malamu ? » Moko te azali malamu, longola kaka Ye moko Nzambe. Oyebi mibeko oyo : « Okobomaka te, okosalaka ekobo te, okoyibaka te, okolobaka te matatoli ya lokuta mpo na kokosela moninga na yo makambo, okosalaka moninga mabe te, okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu. » Moto yango alobaki lisusu : — Moteyi, natosaka nyonso wana wuta bolenge na ngai ! Yesu atalaki ye, asepelaki na ye mingi mpe alobaki na ye : — Ozangi eloko moko kaka : kende, teka biloko na yo nyonso mpe pesa mbongo oyo okozwa epai ya babola ; bongo okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai. Tango moto yango ayokaki bongo, alembaki nzoto mpe akendeki na mawa, pamba te azalaki na bozwi mingi. Yesu atalaki bayekoli na Ye, alobaki na bango : — Ezali pasi mpo na bazwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe ! Bayekoli bakamwaki mingi mpo na maloba na Ye. Kasi Yesu alobaki na bango lisusu : — Solo, bana na Ngai, ezali pasi mpo na kokota kati na Bokonzi ya Nzambe ! Ezali pete mpo na shamo kolekela na lidusu ya tonga, kasi ezali penza pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe. Bayekoli bakamwaki mingi mpe bakomaki kotunana : — Bongo nani penza akoki kobikisama ? Yesu atalaki bango mpe alobaki : — Na bato, ekoki kosalema te ; kasi na Nzambe, ekosalema penza ; pamba te nyonso ekoki kosalema na Nzambe. (Malako 10:17-27)
Petelo alobaki na Yesu : — Nkolo, totiki nyonso oyo tozalaki na yango mpo na kolanda Yo ! Yesu alobaki na bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo atiki ndako na ye, mwasi na ye, bandeko na ye, baboti na ye to bana na ye, mpo na kozwa Bokonzi ya Nzambe lokola litomba, akozwa, na tango oyo, biloko mingi koleka ; mpe na tango oyo ezali koya, bomoi ya seko. (Luka 18:28-30)

Bazwi oyo bayebi Nkolo te bakokabwana na Ye libela

Ezalaki na mozwi moko oyo azalaki kolata bilamba ya motane makasi mpe ya lino ya kitoko, bongo azalaki kobika bomoi ya bisengo mikolo nyonso. Na liboso ya ekuke ya ndako na ye, mobola moko atandamaki wana, kombo na ye ezalaki Lazare, nzoto na ye mobimba etonda na bapota ; azalaki koluka ata kolia biloko oyo ezalaki kokweya longwa na mesa ya mozwi, kasi ezalaki bambwa nde ezalaki koya kolembola bapota na ye. Mokolo moko, mobola yango akufaki, mpe ba-anjelu bamemaki ye epai ya Abrayami. Mozwi mpe akufaki, mpe bakundaki ye. Kati na mboka ya bakufi, mozwi azalaki konyokwama na pasi makasi ; boye atombolaki miso mpe amonaki, na mosika, Abrayami elongo na Lazare avanda pembeni na ye. Mozwi akomaki koganga : « Tata Abrayami, yokela ngai mawa ! Tinda Lazare ete atia songe ya mosapi na ye kati na mayi mpo ete atangisela ngai mayi na lolemo, pamba te nazali koyoka pasi makasi kati na moto oyo. » Kasi Abrayami azongisaki : « Mwana na ngai, kanisa ete, wana ozalaki na bomoi, ozwaki bolamu ebele, kasi Lazare azwaki nde pasi ebele. Sik’oyo awa, azali kozwa kobondisama na ye ; kasi yo, okomi na pasi. (Luka 16:19-25)

Bazwi bamikanisaka ete bazali na bwanya

Mozwi amimonaka lokola moto ya bwanya, kasi mobola oyo azali mayele ayebaka ye malamu. (Masese 28:11)

Ndenge bazwi basalelaka babola

Mobola alobaka na mongongo ya kobondela, kasi mozwi azongisaka eyano na lolendo. (Masese 18:23)
Mozwi azalaka mokonzi ya mobola, mpe modefi azalaka mowumbu ya modefisi. (Masese 22:7)
Nzokande bino, bomonaka babola bato pamba. Boni, bato oyo banyokolaka bino mpe bafundaka bino na bisambiselo, ezali bazwi te ? Ezali bango te bato babebisaka lokumu ya kombo kitoko oyo Nzambe apesa bino ? (Jake 2:6-7)

Bomengo ekoki kosala ete bato babosana Nkolo

Tango Yawe, Nzambe na yo, akokotisa yo na mokili oyo alapelaki ndayi epai ya bakoko na yo, epai ya Abrayami, Izaki, mpe Jakobi mpo na kopesa yo bingumba ya minene mpe ya malamu oyo yo otongaki te, bandako etonda na biloko ya malamu ya ndenge na ndenge oyo yo otiaki te, mabulu ya mayi oyo yo otimolaki te, bilanga ya vino mpe ya olive oyo yo olonaki te ; boye tango okolia mpe okotonda ; keba ete obosana Yawe te oyo abimisaki yo na Ejipito, mokili ya bowumbu. (Deteronomi 6:10-12)
...mokili oyo bokozanga lipa te mpe eloko moko te ; mokili oyo mabanga ezali bibende mpe bokoki kobimisa motako na bangomba. Tango bokolia mpe bokotonda, bosanzola Yawe, Nzambe na bino, mpo na mokili ya malamu oyo apesi bino. Sala keba ete obosana te Yawe, Nzambe na yo, na kozanga kotosa mitindo na Ye, mibeko na Ye mpe bikateli na Ye oyo nazali kopesa yo lelo. Tango okolia mpe okotonda, tango okotonga bandako ya kitoko mpe okovanda kuna, tango bangombe na yo, bantaba na yo mpe bameme na yo ekobotana mingi, tango palata na yo mpe wolo na yo ekokoma ebele mpe biloko nyonso oyo ozali na yango ekokoma ebele ; sala keba ete motema na yo etonda na lofundu te mpe obosana te Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo na Ejipito, mokili ya bowumbu, oyo akambaki yo na esobe ya monene mpe ya somo, na bitando ekawuka mpe ezanga mayi, etando etonda na banyoka ya ngenge mpe na koto mpe abimiselaki yo mayi ya komela wuta na libanga moko ya makasi. Kati na esobe yango, apesaki yo mana mpo na kolia, bilei oyo batata na yo batikala koyeba te, mpo na kobuka lolendo na yo mpe komeka yo, mpo ete na suka, okoka komona bolamu. Boye sala keba ete omilobela te : « Nguya na ngai moko mpe makasi ya maboko na ngai moko nde eboteli ngai bomengo oyo ! » Mpo na yango, kobosanaka te ete ezali Yawe, Nzambe na yo, nde apesaki yo makoki ya kozwa bomengo oyo mpo na kolendisa boyokani na Ye, oyo asalaki elongo na bakoko na bino na nzela ya ndayi, ndenge ezali na mokolo ya lelo. (Deteronomi 8:9-18)
Pamba te nakokotisa bango na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, mokili oyo nalakaki kopesa epai ya bakoko na bango na nzela ya ndayi : bakolia, bakotonda mpe bakoya minene ; bongo bakokende epai ya banzambe mosusu mpe bakosambela yango, bakobwaka Ngai mpe bakobuka boyokani na Ngai. (Deteronomi 31:20)
Oh Yawe, nasengi Yo biloko mibale, kopimela ngai yango te liboso ete nakufa : longola mosika na ngai makambo ya pamba mpe ya lokuta, kopesa ngai te bobola to bozwi, kasi pesa ngai kaka, mokolo na mokolo, lipa oyo ekoki na ngai, pamba te soki natondi makasi, nakoki kowangana Yo mpe koloba : « Yawe nde nani ? » To soki nazali na bobola, nakoki koyiba mpe koyokisa Kombo ya Nzambe na ngai soni. (Masese 30:7-9)
Nakebisaki yo tango ozalaki na kimia kasi olobaki : ‹ Nakoyoka te ! › Ezaleli na yo ezalaka kaka boye wuta bolenge na yo, otosaka na yo Ngai te ! Mopepe ekomema bakambi na yo nyonso mpe baninga na yo bakokende na bowumbu. Okoyoka soni mpe okosambwa likolo ya mabe na yo nyonso. (Jeremi 22:21-22)
Olobaka : « Nazali mozwi ! Nakomi na bozwi ebele mpe nazali na posa ya eloko te. » Kasi ozali koyeba te ete ozali moto ya pasi mpe ya mawa, ozali nde mobola, mokufi miso mpe ozali bolumbu. Yango wana, nazali kopesa yo toli ete osomba epai na Ngai wolo oyo bapetola na moto mpo ete okoma penza mozwi, bilamba ya pembe mpo ete olata mpe obomba bolumbu na yo ya soni, mpe kisi ya miso mpo ete otia na miso na yo mpe omona malamu. (Emoniseli 3:17-18)

Bomengo ememaka zuwa

Izaki alonaki mbuma na mabele oyo mpe abukaki monkama na monkama na oyo alonaki, pamba te Yawe apambolaki ye. Izaki akomaki mozwi, mpe bozwi na ye ekobaki kaka komata kino akomaki moto na bozwi ebele. Bato ya Filisitia bakomaki koyokela ye likunya, pamba te azalaki na bameme ebele, bantaba ebele, bangombe ebele mpe basali ebele. (Ebandeli 26:12-14)
Bongo Abimeleki alobaki na Izaki : — Kende mosika na biso, pamba te okomi na nguya mingi koleka biso. (Ebandeli 26:16)
Jakobi ayokaki bana mibali ya Labani koloba : « Jakobi azwi biloko nyonso ya tata na biso mpe ezali na nzela ya biloko yango nde akomi na bozwi oyo nyonso. » (Ebandeli 31:1)

Bilakeli mabe ya bomengo

Elakeli mabe ya kozwama na makasi

Bomengo ya mozwi ebatelaka bomoi na ye, kasi bato mabe batungisaka mobola te. (Masese 13:8)

Elakeli mabe ya kozanga mpongi

Pongi ya mosali ezalaka ya kimia, ata soki alie moke to mingi ; kasi bomengo ya mozwi ezangisaka ye pongi. (Mosakoli 5:11)

Mawa elakelami bazwi

Kasi mawa na bino oyo bozali bazwi, pamba te bosili kozwa kobondisama na bino ! (Luka 6:24)
Boyoka sik’oyo, bino bazwi : Boyoka mawa mpe bolela mpo na pasi oyo ekokweyela bino. Bomengo na bino esili kopola, mpe mpese esili kolia bilamba na bino ; wolo mpe palata na bino esili kobeba ; mpe libebi na yango ekotatola mabe na bino mpe ekolia banzoto na bino lokola moto. Bozali kobakisa se kobakisa bomengo ! Boyebi te ete tokomi na mikolo ya suka ? Bozali ata koboya kofuta basali bilanga na bino. Yoka ndenge bazali kolela ! Mpe kolela na bango ekomi kino na matoyi ya Nkolo, Mokonzi ya mampinga. Awa na mokili, bozali kobika bomoi ya bisengo mpe ya bofuluki, bozali komikomisa nzoto mafuta lokola banyama oyo babongisi mpo na koboma. (Jake 5:1-5)

Mpo na nini bato mabe bazwaka bozwi?

Pamba te moto mabe amikumisaka na tina na posa makasi ya motema na ye, apambolaka moto oyo azali na lokoso mpe afingaka Yawe. Na lolendo na ye, moto mabe alobaka : « Nzambe azalaka te. » Kati na makanisi na ye nyonso, ezali na esika te mpo na Nzambe. Misala na ye ekendeke liboso tango nyonso, asalaka keba te na mikano na Yo, Yawe ; atiolaka banguna na ye nyonso. (Banzembo 10:3-5)
Nzembo ya Davidi. Kosilikela bato ya mabe te, kosalela bato oyo basalaka mabe zuwa te ; pamba te bakokawuka noki lokola makasa, mpe bakolemba noki lokola matiti. Batela kimia liboso ya Yawe mpe talela Ye ; kosilikela te moto oyo alongaka na misala na ye, mpe oyo asalaka mabongisi ya mabe. Pamba te bato oyo basalaka mabe bakolimwa, kasi bato oyo batielaka Yawe motema bakozwa mokili lokola libula na bango. Etikali tango moke kaka, moto mabe akozala lisusu te ; ata oluki ye, okomona ye te. Kasi bato oyo bamikitisa bakozwa mokili lokola libula na bango mpe bakozala na kimia makasi. (Banzembo 37:1-2, 7, 9-11)
Nzembo ya Azafi. Solo, Nzambe azali malamu mpo na Isalaele, mpo na bato oyo bazali mitema peto. Nzokande mpo na ngai, etikalaki moke ete makolo na ngai eselumuka, etikalaki moke ete nakweya, pamba te nazalaki kolula bato ya lofundu tango nazalaki komona kimia ya bato mabe. Kino na kufa na bango, bazalaka na mitungisi te, nzoto na bango ezalaka sembesembe. Kati na bango, moko te amonaka pasi oyo bato nyonso bamonaka ; babelaka te bokono oyo ezwaka bato. Yango wana, lolendo ekoma lokola mayaka na bakingo na bango, mpe makambo na kanza ekoma lokola elamba na bango. Miso na bango engengaka na bilongi etonda na mafuta ; mitema na bango esalaka kaka mabongisi ya mabe ; batiolaka mpe balobaka mabe, bagangelaka minyoko. Minoko na bango etombokelaka Likolo, mpe lolemo na bango esakanelaka mokili. Yango wana bato balandaka bango mpe bamelaka maloba na bango lokola mayi. Balobaka : « Nzambe akoyeba ndenge nini ? Ye-Oyo-Aleki-Likolo azali ata na boyebi ? » Tala ndenge bato mabe bazalaka : tango nyonso, bazalaka na mitungisi te, mpe bomengo na bango emataka se komata. Solo, ezali kaka na pamba nde nabatelaki motema na ngai peto ; ezali kaka na pamba nde nasukolaki maboko na ngai mpo ete nasala mabe te ! Mikolo nyonso, nanyokwamaka ; mpe tongo nyonso, nazwaka etumbu. Soki nalobi : « Nakoloba lokola bango, » wana nateki penza lokumu ya libota na Yo. Tango nakanisaki mpo na koluka kososola, nayokaki pasi na motema kino nakendeki na Esika ya bule ya Nzambe mpe nasosolaki ndenge nini bakosuka. Solo, otielaka bango biloko ya moselu, okweyisaka bango kati na libebi. Ndenge nini babebisamaka mbala moko, bakomaka na suka, mpe somo elimwisaka bango ! Ndenge ndoto elimwaka soki moto alamuki na pongi, Nkolo, olimwisaka lisolo ya bomoi na bango tango kaka otelemaka. (Banzembo 73:1-20)
Mwasi ya malamu azwaka lokumu, mpe bato ya makasi bazwaka bomengo. (Masese 11:16)
Oh Yawe, ozalaka tango nyonso sembo ; mpe ngai nakokoka kosamba na Yo te. Nzokande nalingi kotuna Yo mwa mituna na tina na oyo etali bosembo na Yo. Mpo na nini misala ya bato mabe ekendaka liboso ? Mpo na nini bato oyo batosaka Yo te bazalaka na bomoi ya kimia ? Olonaki bango mpe bazwi misisa ; bazali kokola mpe kobota mbuma. Ozali tango nyonso pene ya minoko na bango, kasi mosika ya mitema na bango. (Jeremi 12:1-2)

Bazwi oyo bayebi Nzambe te

Na mboka Maoni, ezalaki na moto moko ya bozwi oyo bomengo na ye ezalaki kati na mboka Karimeli. Azalaki na bameme ya mibali nkoto misato mpe bantaba ya basi nkoto moko. Na eleko oyo, azalaki kati na Karimeli epai wapi azalaki kokata bameme na ye bapwale. (1 Samuele 25:2)
Na feti yango, azalaki kolakisa ebele ya bomengo ya bokonzi na ye mpe kongenga ya lokumu monene oyo azalaki na yango. Feti yango esalaki mikolo nkama moko na tuku mwambe. (Ester 1:4)
Amani abetelaki bango lisolo ya bomengo na ye oyo ezalaki penza ebele, motango ya bana na ye mpe makambo nyonso oyo mokonzi azalaki kosala mpo na kopesa ye lokumu mpe ndenge nini atombolaki ye likolo ya bakambi mpe bakalaka mosusu. (Ester 5:11)
Mokili na bango etondi na palata mpe wolo, bomengo na bango ezali na suka te. Mokili na bango etondi na bampunda mpe bakoki ata moke te kotanga bashar na bango ya bitumba. (Ezayi 2:7)
Tango biloko na yo ya koteka ezalaki kobima wuta na ebale monene, ozalaki kokokisa baposa ya bikolo ebele ; ebele ya bomengo mpe ya nkita na yo ezalaki kokomisa bakonzi ya mokili bazwi. (Ezekieli 27:33)
Sik’oyo, nakoloba na yo solo ya likambo : « Bakonzi misato bakobima lisusu mpo na Persi ; bongo mokonzi ya minei akobima lisusu, kasi akoleka bakonzi nyonso oyo bayaki liboso na ye na bomengo. Tango bomengo na ye ekopesa ye nguya, akosala ete bato nyonso batombokela Grese. (Daniele 11:2)
Nzokande, ezalaki na moto moko kuna, kombo na ye « Zashe. » Azalaki mokonzi ya bafutisi mpako, mpe azalaki na bozwi ebele ; (Luka 19:2)

Mobeko ya koluka bozwi ya bato mosusu te

Tango nyonso bokozala na bomoi, bokoki te kosala boyokani ya kimia elongo na bango. (Deteronomi 23:7)
Boye, bopesa te na libala bana na bino ya basi epai ya bana na bango ya mibali to bozwa te na libala bana na bango ya basi mpo na bana na bino ya mibali. Tango nyonso, bosalaka te boyokani ya bondeko elongo na bango mpo ete bokoka kozala makasi, bokoka kolia bambuma malamu ya mokili mpe bokoka kotikela yango bana na bino lokola libula mpo na libela. › (Esidrasi 9:12)

Nzela mabe ya kozwa bozwi

Bato mosusu bazwaka bozwi na kosala masumu na kondima te ete basali masumu

Efrayimi alobaka na lolendo nyonso : « Ngai nazali mozwi, nakomi na bozwi mingi. Na mosala na Ngai nyonso, bakotikala komona Ngai na mbeba ata moko te oyo bakoki kobenga lisumu. » (Oze 12:9)
Bato oyo basombaka bibwele yango babomaka yango, bazalaka na somo ya etumbu ata moko te. Bato oyo batekaka yango balobaka : « Tika ete Yawe apambolama, pamba te nakomi mozwi ! » Mpe bango moko babateli na yango bayokelaka yango mawa ata moke te. (Zakari 11:5)

Bato mosusu bamimonisaka lokola bato ya Nzambe mpo na kozwa bozwi

Mika alobaki : « Sik’oyo nayebi ete Yawe akosalela ngai bolamu lokola moto ya libota ya Levi akomi nganga-nzambe na ngai. » (Bilombe 17:13)

Makambo ndenge na ndenge

...soki oluki yango penza ndenge balukaka palata to bomengo oyo ebombama, (Masese 2:4)
Kolakela mokonzi mabe te, ezala kati na motema na yo ; kolakela mozwi mabe te, ezala na mbeto na yo ya kolala, pamba te ndeke ya likolo ekoki komema maloba na yo mpe kopanza sango ya maloba na yo. (Mosakoli 10:20)

Mbala mosusu bato bakosaka na likambo ya mbongo na bango

Ezali na moto moko oyo asalaka makambo lokola mozwi, nzokande azali na ye ata na eloko moko te ; mpe ezali na moto mosusu oyo asalaka makambo lokola mobola, nzokande azali na bozwi mingi. (Masese 13:7)

Mbongo esalelami mpo na komonisa motuya ya Bokonzi ya Nzambe

Bokonzi ya Likolo ekokani na eloko ya talo oyo babomba kati na elanga ; soki moto moko amoni yango, akobomba yango lisusu ; mpe na esengo wana, akokende koteka biloko na ye nyonso mpo na kosomba elanga wana. Bokonzi ya Likolo ekokani lisusu na moto ya mombongo, oyo alukaka bapawuni ya kitoko. Soki amoni mayaka moko ya talo makasi, akokende koteka biloko na ye nyonso mpo na kosomba yango. (Matayo 13:44-46)

Bomoi ya sembo ekokani na palata

Lolemo ya moto ya sembo ezali lokola palata ya talo, kasi motema ya moto mabe ezali na tina te. (Masese 10:20)

Kosambisama ya bikolo ya bazwi oyo bayebi Nzambe te

Yango wana, bamemi bomengo oyo bazwaki mpe oyo babombaki na lubwaku ya banzete ya pepiliye. (Ezayi 15:7)
Yo oyo ovandaka pembeni ya bibale minene, yo oyo otonda na bomengo mingi, suka na yo ebelemi, tango na yo ya kobebisama ekoki ! (Jeremi 51:13)
Loba na Tiri oyo ezalaka pembeni ya ebale monene, oyo esalaka mombongo elongo na bikolo nyonso, bavandi ya bisanga : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh engumba Tiri, olobaka : ‘ Ngai, nakoka na kitoko na ngai ! ’ Bato ya Tarsisi bazalaki kosala mombongo elongo na yo mpo ete ozalaki na biloko ebele mpe ya lolenge nyonso ; bazalaki komema epai na yo palata, bibende, eten mpe mbodi. Bato ya Yavani, ya Tubali mpe ya Mesheki bazalaki kosala mombongo elongo na yo ; bazalaki kopesa yo bawumbu mpe biloko basala na bronze mpo na kosomba epai na yo biloko oyo ozalaki koteka. Bato ya Beti Togarima bazalaki komema epai na yo bampunda ya misala, bampunda ya bitumba mpe bamile. Bato ya Dedani bazalaki kosala mombongo elongo na yo ; bato ya bisanga ebele bazalaki koya kosomba biloko epai na yo, bazalaki kofuta yo na pembe ya nzoko mpe na banzete ya ebeni. Bato ya Siri mpe bazalaki kosala mombongo elongo na yo mpo ete ozalaki na biloko ebele ; bazalaki komema epai na yo mabanga ya emerode, maputa ya langi ya motane, bilamba batonga bililingi kitoko na basinga, bilamba ya lino ya kitoko, mabanga ya korayi mpe ya ribi. Bato ya Yuda mpe ya Isalaele bazalaki kosala mombongo elongo na yo ; bazalaki komema epai na yo ble ya mboka Miniti, farine oyo basalelaka mikate mpe bagato, mafuta ya nzoyi, mafuta mpe malasi ya solo kitoko, mpo na kosomba biloko oyo yo ozalaki koteka. Bato ya Damasi bazalaki kosala mombongo elongo na yo, pamba te ozalaki na bambuma ebele mpe na biloko ebele ; bazalaki komema epai na yo masanga ya vino oyo ezalaki kowuta na mboka Eliboni mpe bapwale ya bameme oyo ezalaki kowuta na mboka Tsakari, mpo na kosomba biloko oyo yo ozalaki koteka. Bato ya Vedani mpe ya Yavani oyo bazalaki kowuta na Uzali bazalaki komema epai na yo bibende oyo balekisa na moto, bibende oyo basalelaka misala ya moto, banzete ya kasia, mpe banzete oyo ebotaka na mayi mpe basalaka na yango malasi, mpo na kosomba biloko oyo yo ozalaki koteka. Bato ya Dedani bazalaki kosala mombongo elongo na yo ; bazalaki komema epai na yo bilamba ya kitoko oyo batiaka na bampunda. Bato ya Arabi mpe bakambi nyonso ya Kedari bazalaki kosala mombongo elongo na yo ; bazalaki komema epai na yo bana meme ya mibali, bameme ya mibali mpe bantaba ya mibali. Bato ya mombongo ya Saba mpe ya Raema bazalaki kosala mombongo elongo na yo ; bazalaki komema epai na yo biloko ya mike-mike ya solo kitoko oyo balambelaka, mabanga ya talo ya ndenge na ndenge mpe wolo. Bato ya Arani, ya Kane mpe ya Edeni, elongo na bato ya mombongo ya Saba, ya Asiri mpe ya Kilimadi, bazalaki kosala mombongo elongo na yo ; bazalaki kosala elongo na yo mombongo ya biloko ya kitoko : bakazaka ya langi ya motane, bilamba batonga bililingi kitoko na basinga, bitoko ya balangi ya ndenge na ndenge mpe mikaba makasi mpe ya kitoko. Bamasuwa minene ya Tarsisi ezalaki komema biloko na yo ya koteka. Otondaki meke na biloko mpe okendeki sango kati na bibale minene. Baluki nkayi na yo bamemaki yo kino na kati-kati ya bibale minene. Kasi mopepe ya este ebukaki-bukaki yo na biteni na kati-kati ya ebale monene : bomengo na yo, biloko na yo ya koteka, mombongo na yo, baluki nkayi na yo, bato na yo, oyo basalaka na masuwa, basali oyo babambaka madusu ya masuwa na yo, bato oyo basalaka mombongo elongo na yo mpe basoda na yo nyonso elongo na lisanga mobimba oyo ezali kati na masuwa, bakokufa na kati-kati ya bibale minene na mokolo oyo masuwa na yo ekozinda. (Ezekieli 27:3, 12-27)
Isalaele azalaki lokola nzete ya vino ya bitape ebele, azalaki kobota mbuma mpo na ye moko. Ndenge azalaki kobota mbuma ebele, ndenge wana mpe atongaki bitumbelo ebele ; ndenge mabele na ye ekomaki kitoko, ndenge wana mpe abongisaki mabanga na ye ya bule. Mitema na bango etondi na mabe mpe basengeli sik’oyo kofuta masumu na bango. Ye moko Yawe akokaba bitumbelo na bango mpe akopanza mabanga na bango ya bule. (Oze 10:1-2)
Bino bavandi ya etuka Makiteshi, bolela, pamba te bato nyonso ya mombongo bakokufa, mpe bato nyonso oyo batekaka palata bakobebisama ! Bakobotola bango bomengo na makasi mpe bakobuka bandako na bango ; bakotonga bandako, kasi bakotikala kovanda yango te ; bakosala bilanga ya vino, kasi bakotikala komela vino na yango te. » Na mokolo ya kanda na Yawe, ezala palata to wolo na bango ekobikisa bango te. Na moto ya zuwa na Ye, mokili mobimba ekozikisama, pamba te akosukisa na mbalakata bavandi nyonso ya mokili. (Sofoni 1:11, 13, 18)
Engumba Tiri emitongeli yango moko ndako makasi, emibombeli palata ebele lokola putulu mpe wolo ebele lokola potopoto ya balabala. Kasi Nkolo akobotola yango, akosukisa nguya na yango na ebale monene mpe ekozika na moto. (Zakari 9:3-4)

Mokonzi asengelaki kozwa bomengo koleka ndelo te

Nzokande mokonzi yango asengeli te kozala na bampunda ebele mpo na ye moko mpe kozongisa bato na Ejipito mpo na kobakisa motango ya bampunda, pamba te Yawe alobaki na bino : « Botikala kozonga lisusu te na nzela oyo. » Asengeli te kozala na basi ebele noki te motema na ye ekopengwa. Asengeli te kozala na palata mpe wolo ebele koleka. (Deteronomi 17:16-17)

Bakonzi baboyaki mobeko ya kozwa bomengo koleka ndelo te

Salomo azalaki na mapango nkoto minei ya bampunda mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda, nkoto zomi na mibale. (1 Bakonzi 5:6)
Mobu na mobu, Salomo azalaki kozwa bakilo ya wolo nkoto tuku mibale, mbongo ya mpako ya bato ya mombongo oyo bazalaki koteka biloko oyo bazalaki kosomba na bamboka ya bapaya, mbongo ya mpako ya bateki biloko ya ndenge na ndenge, mbongo ya mpako oyo bakonzi nyonso ya Arabi bazalaki kofuta, mpe oyo bayangeli ya bituka bazalaki kokongola kati na mokili ya Isalaele. Mokonzi Salomo asalisaki na wolo batuta banguba minene nkama mibale : nguba moko na moko esengaki bakilo motoba ya wolo. Asalisaki lisusu na wolo batuta banguba mike nkama misato : nguba moko na moko ya moke esengaki kilo moko na bagrame nkama mitano ya wolo. Mokonzi atiaki yango kati na ndako na ye, oyo bazalaki kobenga « ndako ya zamba ya Libani. » Mokonzi asalaki na pembe ya nzoko kiti moko monene ya bokonzi mpe abambaki yango wolo ya peto. Kiti yango ya bokonzi ezalaki na ematelo ya binyatelo motoba mpe songe ya mokongo na yango ezalaki lokola libungutulu. Na bangambo nyonso mibale, ezalaki na bisika ya kotia maboko mpe bikeko mibale ya nkosi na pembeni ya bisika ya kotia maboko. Bikeko zomi na mibale ya nkosi ezalaki na likolo ya binyatelo motoba ya ematelo : enyatelo moko na moko ezalaki na bikeko mibale, ekeko moko na ngambo moko na moko. Kati na mikili nyonso, eloko ya ndenge wana etikala nanu kosalema te. Bakopo nyonso ya mokonzi Salomo ezalaki ya wolo ya peto, mpe biloko nyonso ya ndako ya Zamba ya Libani ezalaki ya wolo ya peto. Eloko moko te ezalaki ya palata, pamba te, na tango oyo Salomo azalaki mokonzi, palata ezalaki na motuya ata te. Mpe mokonzi azalaki na bamasuwa oyo ezalaki kosala mombongo na ebale monene elongo na bamasuwa ya Irami. Sima na mibu nyonso misato, bamasuwa ezalaki kozonga longwa na Tarsisi mpe ezalaki komema wolo, palata, pembe ya nzoko, bamakaku mpe bandeke oyo babengaka « paoni. » Mokonzi Salomo alekaki bakonzi nyonso ya mokili na bozwi mpe na bwanya. Mokili mobimba ezalaki koluka kokutana na Salomo mpo na koyoka bwanya oyo Nzambe atiaki kati na motema na ye. Kati na bato oyo bazalaki kokende kotala Salomo, moko na moko azalaki komemela ye lokola kado : biloko ya palata, biloko ya wolo, bilamba, bibundeli, biloko ya mike-mike ya solo kitoko, bampunda mpe bamile. Mpe ezalaki bongo mibu nyonso. Salomo asangisaki bashar mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda : azalaki na bashar nkoto moko na nkama minei, mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda, nkoto zomi na mibale. Abombaki bango kati na bingumba epai wapi babombaka bashar, mpe na Yelusalemi epai wapi mokonzi azalaki kovanda. Mokonzi asalaki ete palata ekoma ebele na Yelusalemi lokola mabanga, mpe banzete ya sedele ekoma ebele lokola banzete ya sikomori oyo ezali kati na mokili ya lubwaku. Bampunda ya Salomo ezalaki kowuta na Ejipito mpe na engumba Kue. Bato ya mombongo ya mokonzi nde bazalaki kosomba yango kuna na engumba Kue. (1 Bakonzi 10:14-28)
Salomo asangisaki bashar mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda ; azalaki na bashar nkoto moko na nkama minei, mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda, nkoto zomi na mibale. Abombaki bango kati na bingumba epai wapi babombaka bashar, mpe na Yelusalemi epai wapi mokonzi azalaki kovanda. Mokonzi asalaki ete wolo mpe palata ekoma ebele na Yelusalemi lokola mabanga, mpe banzete ya sedele ekoma ebele lokola banzete ya sikomori oyo ezali kati na mokili ya lubwaku. Bampunda ya Salomo ezalaki kowuta na Ejipito mpe na engumba Kue. Bato ya mombongo ya mokonzi nde bazalaki kosomba yango kuna na engumba Kue. Bazalaki kosomba na Ejipito shar moko na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, nkama motoba, mpe mpunda moko na motuya ya mbongo ya bibende, nkama moko na tuku mitano ; bazalaki mpe kosomba yango mpo na bakonzi nyonso ya bato ya Iti mpe ya Siri. (2 Masolo ya Kala 1:14-17)
Tika ete Yawe, Nzambe na yo, apambolama ; Ye oyo asepelaki na yo mpe atiaki yo na kiti na Ye ya bokonzi lokola mokonzi mpo na kosalela Yawe, Nzambe na yo ! Ezali mpo ete Nzambe na yo alingaka Isalaele mpe alingi ete ewumela mpo na libela nde atiaki yo lokola mokonzi na yango, mpo ete osala na bosolo mpe na bosembo. » Mwasi mokonzi ya Saba apesaki mokonzi Salomo bakilo nkoto misato na nkama mitano ya wolo, biloko ebele penza ya solo kitoko mpe mabanga ya talo. Etikala lisusu kozala te na biloko ebele ya solo kitoko lokola biloko oyo mwasi mokonzi ya Saba amemelaki mokonzi Salomo. Lisusu, basali ya Irami mpe ya Salomo, oyo bamemaki wolo wuta na Ofiri bamemaki mpe mabaya ya santale mpe mabanga ya talo. Mokonzi asalaki na mabaya wana ya santale makonzi ya Tempelo ya Yawe mpe ya ndako ya mokonzi, banzenze mpe mandanda mpo na bayembi. Batikalaki nanu komona nyonso wana te kati na mokili ya Yuda. Na ngambo na ye, mokonzi Salomo apesaki na mwasi mokonzi ya Saba biloko nyonso oyo azalaki na yango posa mpe oyo asengaki, koleka kutu biloko oyo amemelaki mokonzi. Sima na yango, mwasi mokonzi ya Saba azongaki elongo na basali na ye, na mokili na ye. Mobu na mobu, Salomo azalaki kozwa bakilo ya wolo nkoto tuku mibale, mbongo ya mpako ya bato ya mombongo oyo bazalaki koteka biloko oyo bazalaki kosomba na bamboka ya bapaya, mpe mbongo ya mpako ya bateki biloko ya ndenge na ndenge. Bakonzi nyonso ya Arabi mpe bayangeli ya bituka bazalaki komema wolo mpe palata epai ya Salomo. Mokonzi Salomo asalisaki na wolo batuta banguba minene nkama mibale ; nguba moko na moko esengaki bakilo motoba ya wolo. Asalisaki lisusu na wolo batuta banguba mike nkama misato ; nguba moko na moko ya moke esengaki bakilo misato ya wolo. Mokonzi atiaki yango kati na ndako na ye, oyo bazalaki kobenga « ndako ya zamba ya Libani. » Mokonzi asalaki na pembe ya nzoko kiti moko monene ya bokonzi mpe abambaki yango wolo ya peto. Kiti yango ya bokonzi ezalaki na ematelo ya binyatelo motoba, enyatelo makolo ya wolo ekanganaki na kiti. Na bangambo nyonso mibale, ezalaki na bisika ya kotia maboko, mpe bikeko mibale ya nkosi na pembeni ya bisika ya kotia maboko. Bikeko zomi na mibale ya nkosi ezalaki na likolo ya binyatelo motoba ya ematelo : enyatelo moko na moko ezalaki na bikeko mibale, ekeko moko na ngambo moko na moko. Kati na mikili nyonso, eloko ya ndenge wana etikala nanu kosalema te. Bakopo nyonso ya mokonzi Salomo ezalaki ya wolo, mpe biloko nyonso ya ndako ya Zamba ya Libani ezalaki ya wolo ya peto. Pamba te, na tango oyo Salomo azalaki mokonzi, palata ezalaki na motuya ata te. Mokonzi azalaki na bamasuwa oyo ezalaki kokende na Tarsisi, elongo na basali ya Irami. Sima na mibu nyonso misato, bamasuwa ezalaki kozonga wuta na Tarsisi mpe ezalaki komema wolo, palata, pembe ya nzoko, bamakaku mpe bandeke oyo babengaka « Paoni. » Mokonzi Salomo alekaki bakonzi nyonso ya mokili na bozwi mpe na bwanya. Bakonzi nyonso ya mokili bazalaki koluka kokutana na Salomo mpo na koyoka bwanya oyo Nzambe atiaki kati na motema na ye. Moko na moko azalaki komemela ye lokola kado biloko ya palata, biloko ya wolo, bilamba, bibundeli, biloko ya mike-mike ya solo kitoko, bampunda mpe bamile. Mpe ezalaki bongo mibu nyonso. Salomo azalaki na bashambre nkoto minei mpo na kobomba bampunda elongo na bashar, mpe batambolisi nkoto zomi na mibale mpo na bashar. Atiaki yango kati na bingumba ya bashar mpe epai na ye, Salomo, kati na Yelusalemi. Azalaki likolo ya bakonzi nyonso, longwa na Ebale (Efrate) kino na mokili ya bato ya Filisitia mpe na mondelo ya Ejipito. Mokonzi asalaki ete palata ekoma ebele kati na Yelusalemi lokola mabanga, mpe banzete ya sedele ekoma ebele lokola banzete ya sikomori oyo ezali kati na mokili ya lubwaku. (2 Masolo ya Kala 9:8-27)

Esakweli

Tiri, mboka kitoko, bato oyo baleki na bozwi kati na bato bakomemela yo bakado mpo ete olinga bango. (Banzembo 45:13)
Ezekiasi ayambaki bantoma wana na esengo mpe alakisaki bibombelo biloko na ye ya motuya lokola palata mpe wolo, biloko ya mike-mike ya solo kitoko, mafuta ya kitoko, bibundeli na ye nyonso mpe bomengo na ye nyonso. Ezalaki na eloko moko te, ezala ya ndako na ye to ya mokili na ye mobimba, oyo azangaki kolakisa bango. Ezayi atunaki : — Bamoni eloko nini kati na ndako na yo ? Ezekiasi azongisaki : — Bamoni biloko nyonso oyo ezali kati na ndako na ngai ; ezali na eloko moko te, kati na bibombelo na ngai, oyo nazangi kolakisa bango. Ezayi alobaki na Ezekiasi : — Yoka liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Solo, na mikolo oyo ekoya, nyonso oyo ezali kati na ndako na yo mpe nyonso oyo batata na yo babomba kino na mokolo ya lelo, bakomema yango na Babiloni ; eloko moko te ekotikala, » elobi Yawe. (Ezayi 39:2, 4-6)
Boye, okomona mpe okongenga, motema na yo ekobeta mpe ekosepela ; bomengo ya ebale ekoya epai na yo, mpe bozwi ya bikolo ekoya epai na yo. Bashamo ebele ekotondisa mokili na yo, bana ya shamo ya mokili ya Madiani mpe ya Efa. Yango nyonso ekowuta na Saba, ekomema wolo mpe malasi ya ansa, mpe ekotatola masanzoli na Yawe. Solo, bisanga ekotalela Ngai ; bamasuwa ya Tarsisi ekozala na liboso, ekomema bana na yo ya mibali longwa mosika, elongo na palata mpe wolo, mpo na lokumu ya Yawe, Nzambe na yo, Mosantu ya Isalaele ; pamba te apesi yo nkembo. Bikuke na yo ekozala tango nyonso efungwama, ekotikala kokangama te, ezala na moyi to na butu, mpo ete bato bamemela yo bozwi ya bikolo, bakonzi na yango na molongo lokola bato bakangami na etumba. (Ezayi 60:5-6, 9, 11)
Kasi bino, bokobengama Banganga-Nzambe ya Yawe, bakopesa bino kombo bawumbu ya Nzambe na biso ; bokolia mpe bokotonda na bozwi ya bikolo mpe bokozwa lokumu na bomengo na bango. Na esika ya soni na bino, bokozwa litomba mbala mibale, mpe na esika ya kosambwa, bokosepela na libula na bino. Boye, bokozwa litomba mbala mibale kati na mokili na bino mpe bokosepela mpo na libela. (Ezayi 61:6-7)
...nakoningisa bato ya bikolo nyonso, bomengo ya bikolo nyonso ekoya na esika oyo, mpe nakotondisa Ndako oyo na nkembo, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. (Aje 2:7)
Tatola lisusu : « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Bingumba na Ngai ekotondisama lisusu na bomengo, Yawe akobondisa lisusu Siona mpe akopona Yelusalemi. › » (Zakari 1:17)
Yango ezali te liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya basakoli na Ye wuta kala tango Yelusalemi mpe bingumba oyo ezingelaki yango ezalaki na kimia mpe na boyokani, mpe Negevi mpe Shefela etondaki na bato ebele ? » (Zakari 7:7)
Bakonzi ya mabele, bato minene, bakonzi ya mampinga ya basoda, bazwi, bato ya nguya, bawumbu mpe bansomi bakendeki kobombama kati na madusu ya mabanga mpe kati na mabanga minene ya bangomba. Bazalaki koganga epai ya bangomba mpe epai ya mabanga minene : « Bokweyela biso mpe bobomba biso mpo ete Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi amona biso te, mpe mpo ete kanda ya Mpate ekweyela biso te ! (Emoniseli 6:15-16)
Esengaki na makasi ete bato nyonso, ezala bato minene to bato pamba, bazwi to babola, bansomi to bawumbu, batiama elembo na loboko ya mobali to na mbunzu. Boye moko te akokaki kosomba to koteka soki azangi elembo ya kombo ya nyama to ya motango oyo ekokani na kombo ya nyama yango. (Emoniseli 13:16-17)
Mwasi yango alataki bilamba ya motane ya pete mpe ya motane makasi, babiju ya wolo, mabanga ya talo mpe mayaka. Na loboko na ye, asimbaki kopo moko basala na wolo mpe etonda na makambo ya nkele mpe ya bosoto ya kindumba na ye. (Emoniseli 17:4)
Pamba te bikolo nyonso emelaki vino ya kanda ya kindumba na yango. Bakonzi ya mokili basalaki ekobo elongo na Babiloni, mpe bozwi ya bato ya mokili, oyo basalaka mombongo, emataki makasi mpo na monzele na yango, oyo elekaki ndelo. » (Emoniseli 18:3)
Bongo bato ya mombongo ya mokili bakolela mpe bakosala matanga na tina na yango, pamba te moko te akosomba lisusu biloko na yango : wolo, palata, mabanga ya talo, mayaka, bilamba ya lino ya kitoko, bilamba ya motane ya pete, bilamba ya swa, bilamba ya motane makasi, banzete na bango ya solo kitoko, biloko na bango oyo basala na pembe ya nzoko, biloko nyonso oyo basala na banzete ya talo, na bronze, na bibende mpe na mabanga kitoko oyo babengaka marbre ; eteni ya poso ya nzete oyo epesaka solo kitoko, biloko ya mike-mike ya solo kitoko, malasi, mire, ansa, vino, mafuta, farine, ble, bangombe, bameme, bampunda, bashar, bawumbu mpe milimo ya bato. Bakoloba : ‹ Biloko oyo ozalaki kolinga mingi ekimi yo mosika ; biloko nyonso oyo ezalaki kosala lolendo mpe lofundu na yo ebebi, ekotikala kozwama lisusu te ! › Bato ya mombongo oyo bamonaki bomengo komata mpo ete bazalaki kotekela engumba yango biloko na bango, bakotelema na mosika mpo na somo ya pasi oyo ekokweyela yango. Bakolela mpe bakosala matanga. Bakoloba : ‹ Mawa ! Mawa na yo, engumba monene, yo oyo ozalaki kolata bilamba ya lino ya kitoko, bilamba ya motane makasi, babiju ya wolo, mabanga ya talo, mpe mayaka ! Kaka na ngonga moko, bomengo nyonso esili ! › Batambolisi nyonso ya bamasuwa, bato nyonso oyo basalaka mibembo na bamasuwa, bato oyo basalaka kati na bamasuwa mpe ba-oyo basalaka mombongo na nzela ya mayi, bakotelema na mosika. Wana bakomona molinga komata longwa na engumba oyo etumbami, bakoganga : ‹ Engumba nini ekokanaki na engumba monene oyo ? › Bakobwaka putulu na mito na bango, bakolela, bakosala matanga mpe bakoganga makasi : ‹ Mawa ! Mawa na yo, engumba monene epai wapi bato nyonso oyo bazalaki na bamasuwa na likolo ya ebale monene bakomaki bazwi mpo na bomengo na yo ! Na ngonga moko kaka, obebisami ! › (Emoniseli 18:11-19)

Elikya ya bomengo esalelami mpo na kolendisa

...bokovanda elongo na biso. Mboka ezali liboso na bino, bovanda, bosala mombongo mpe bokoma bankolo mabele. » Boye, Sishemi alobaki na tata mpe na bandeko mibali ya Dina : — Tika ete nazwa ngolu na miso na bino mpe nakopesa bino nyonso oyo bokosenga ngai. Bokatela ngai motuya makasi ya mbongo ya libala mpe biloko ebele ya libala ; nakofuta bino eloko nyonso oyo bokosenga ngai. Kasi bopesa ngai kaka elenge mwasi oyo na libala. (Ebandeli 34:10-12)
« Bato oyo bazali na boboto epai na biso ; tika ete bavanda elongo na biso mpe basala mombongo, mpo ete mboka ezali na yango monene ! Tokoki na biso kobala bana na bango ya basi, mpe bango bakoki na bango kobala bana na biso ya basi. Bibwele na bango, bomengo na bango, banyama na bango nyonso ; boni ekokoma ya biso te soki kaka tondimi ete bavanda elongo na biso ? » (Ebandeli 34:21, 23)
Moko na moko kati na bato ya Isalaele akomaki koloba : « Bozali na bino komona mobali oyo ndenge azali kobima mpo na koya epai na biso ? Azali nde koya kotiola Isalaele ! Mokonzi akopesa bomengo ebele epai ya moto oyo akoboma ye, akopesa ye mwana na ye ya mwasi na libala mpe akosalela libota ya tata na ye bolamu kati na Isalaele. » (1 Samuele 17:25)