Baboti bazali na mokumba ya koteya bana na bango mibeko mpe misala ya bomoi oyo esepelisaka Nzambe
Nzokande, sala keba mpe omisenzela mpo ete obosana te makambo oyo miso na yo emonaki to kotika te makambo yango elongwa na motema na yo na mikolo nyonso ya bomoi na yo. Teya yango na bana na yo mpe na bana na bango oyo bakobotama na sima na bango. (Deteronomi 4:9)
Tika ete mibeko oyo napesi yo lelo, ewumela kati na motema na yo. Okoteyaka yango na bana na yo tango ozali na ndako, tango ozali kotambola na nzela, tango olali mpe tango olamuki. (Deteronomi 6:6-7)
Bobatela malamu kati na mitema mpe milimo na bino maloba na ngai oyo, bokanga yango na maboko na bino lokola bilembo, mpe botia yango na bilongi na bino lokola elembo. Boteya yango na bana na bino na kolobelaka bango yango tango bovandi kati na bandako mpe tango bozali kotambola na nzela, tango bolali pongi mpe tango bolamuki. (Deteronomi 11:18-19)
Lakisa mwana nzela oyo asengeli kotambola wuta na bomwana na ye ; ezala tango akokoma mokolo, akobunga yango te. (Masese 22:6)