Batindiki biso tozala na nyongo te
Bozala na niongo ya moto te, longola kaka niongo ya kolingana bino na bino, pamba te moto oyo alingaka bato mosusu akokisi makambo nyonso oyo Mobeko esengaka. (Barome 13:8)
Nyongo ekokani na bowumbu
Mozwi azalaka mokonzi ya mobola, mpe modefi azalaka mowumbu ya modefisi. (Masese 22:7)
Mobeko ya kozala baombo ya bato mosusu te
Bosikolamaki na motuya makasi ! Boye, bokoma te bawumbu ya bato. (1 Bakolinto 7:23)
Bandakisa ya mpasi ya nyongo
Davidi alongwaki na Gati mpe akendeki kobombama na lidusu ya libanga ya Adulami. Tango bandeko na ye ya mibali mpe ya libota ya botata na ye bayokaki sango yango, bakitaki kuna epai na ye. Bato nyonso oyo bazalaki kati na minyoko, ba-oyo bazalaki na baniongo ya bato mosusu mpe ba-oyo mitema na bango ezoka, basanganaki zingazinga ya Davidi mpe akomaki mokambi na bango. Elongo na ye, ezalaki na bato pene nkama minei. (1 Samuele 22:1-2)
Mwasi moko kati na basi ya bayekoli ya basakoli abondelaki Elize : — Mosali na yo, mobali na ngai, akufa. Oyebi malamu ete azalaki kotosa Yawe. Kasi moto oyo adefisaki ye niongo ayei mpo na kozwa bana na ngai mibale ya mibali mpo ete bakoma bawumbu na ye. (2 Bakonzi 4:1)
Mibali elongo na basi na bango bayimaki-yimaki makasi mpo na kotelemela bandeko na bango, Bayuda. Bamoko bazalaki koloba : — Biso elongo na bana na biso ya mibali mpe ya basi, tozali ebele ; tozali na posa ya ble oyo ekoki na motango na biso mpo ete tolia mpe towumela na bomoi. Bamosusu bazalaki mpe koloba : — Tozali kosimbisa bilanga na biso, bilanga na biso ya vino mpe bandako na biso lokola ndanga mpo na kozwa ble na tango ya nzala makasi. Bamosusu lisusu bazalaki koloba : — Topesaki bilanga na biso mpe bilanga na biso ya vino lokola ndanga mpo na kodefa mbongo ya kofuta mpako ya mokonzi. Nzokande tozali nzoto moko mpe makila moko na bandeko na biso, mpe bana na biso bakeseni te na bana na bango ; kasi tala ndenge nini tosili kosambwa : tosengeli koteka bana na biso ya mibali mpe ya basi lokola bawumbu ; mpe bana na biso mosusu ya basi bakomi bawumbu, mpe tozangi nguya ya kosikola bango, mpo ete bilanga na biso mpe bilanga na biso ya vino ekomi ya bato mosusu ! (Neyemi 5:1-5)
Tika ete moto oyo adefisaki ye mbongo akanga ye biloko nyonso, mpe tika ete bapaya babotola ye bambuma ya mosala na ye ! (Banzembo 109:11)
Tala liloba oyo Yawe alobi : « Wapi mokanda ya koboma libala oyo Ngai nabenganelaki mama na bino ? To natekaki bino epai ya nani oyo Ngai nazalaki na niongo na ye ? Botekamaki mpo na masumu na bino ; mpe libala ya mama na bino ekufaki mpo na botomboki na bino. (Ezayi 50:1)
Kozala na nyongo te ezalaki malamu
Oh mama na ngai, mawa na ngai ! Mpo na nini obotaki ngai ! Nazali moto oyo mokili mobimba eswanisaka mpe etelemelaka. Nadefisa moto moko te eloko mpe nadefa eloko ya moto moko te, kasi bato nyonso balakelaka ngai kaka mabe. (Jeremi 15:10)
Nyongo ezalaki lokola elakeli mabe
Kasi soki botosi te Yawe, Nzambe na bino, mpe bosaleli te mitindo mpe bikateli na Ye, oyo nazali kopesa bino lelo, tala bilakeli mabe oyo ekokomela bino mpe ekokanga bino : Mopaya oyo avandi kati na bino akoleka bino na lokumu tango nyonso, kasi bino bokokita se kokita ; akodefisa bino, kasi bino bokokoka kodefisa ye te ; akozala moto, kasi bino bokozala mokila. Tala bilakeli mabe nyonso oyo ekokomela bino, ekolanda bino mpe ekozwa bino, ekokanga bino kino bokobebisama ; pamba te botosaki te Yawe, Nzambe na bino, mpe bobatelaki te mitindo mpe bikateli oyo apesaki bino. (Deteronomi 28:15, 43-45)
Kozala na nyongo te ezalaki lokola lipamboli
Nzokande, ebongaki te ete mobola azala kati na bino ; pamba te kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo ete bokamata yango lokola libula, akopambola bino koleka, soki botosi malamu Yawe, Nzambe na bino, mpe bosaleli malamu mitindo oyo nazali kopesa bino lelo. Pamba te Yawe, Nzambe na bino, akopambola bino ndenge alakaki ; mpe bino bokodefisa na bikolo ebele, kasi bokodefa te. Bokokonza bikolo ebele, kasi ekolo moko te ekokonza bino. (Deteronomi 15:4-6)
Soki botosi penza Yawe, Nzambe na bino, mpe bosaleli penza mitindo na Ye oyo nazali kopesa bino lelo ; Yawe, Nzambe na bino, akotombola bino likolo ya bikolo nyonso ya mokili. Tala mapamboli oyo ekopesamela bino mpe ekolanda bino tango bokotosa Yawe, Nzambe na bino : Mpo na bolamu na yo, Yawe akofungola likolo, ebombelo ya bamvula na Ye, mpo na konokisa mvula na mokili na bino na eleko ya malamu ; mpe akopambola misala nyonso ya maboko na bino. Bikolo ebele ekodefa epai na bino, kasi bino bokodefa ata na ekolo moko te. (Deteronomi 28:1-2, 12)
Kofuta nyongo
Bato ya Nzambe bafutaka banyongo na bango
Koboyaka te kosala bolamu epai ya moto oyo azali na bosenga, tango maboko na yo ezali na makoki ya kosala yango. Kolobaka na moninga na yo te : « Kende, bongo oya sima ; nakopesa yo yango lobi ; » soki ozali na makoki ya kosala likambo yango. (Masese 3:27-28)
Bato mabe bafutaka banyongo na bango te
Moto mabe adefaka mpe azongisaka te, kasi moto ya sembo ayokaka mawa mpe akabaka. (Banzembo 37:21)
Nkolo akoki na nzela ya likamwisi kopesa biloko mpo na kobima na nyongo
Mwasi moko kati na basi ya bayekoli ya basakoli abondelaki Elize : — Mosali na yo, mobali na ngai, akufa. Oyebi malamu ete azalaki kotosa Yawe. Kasi moto oyo adefisaki ye niongo ayei mpo na kozwa bana na ngai mibale ya mibali mpo ete bakoma bawumbu na ye. Elize azongiselaki ye : — Ndenge nini nakoki kosunga yo ? Yebisa ngai eloko oyo ozali na yango kati na ndako na yo. Azongisaki : — Mwasi mowumbu na yo azali na eloko moko te, longola kaka mwa mafuta. Elize alobaki : — Kende kosenga na baninga na yo nyonso bambeki ya pamba, kosenga moke te. Sima, zonga na ndako na yo, kanga ekuke sima na yo elongo na bana na yo ya mibali ; sopa mafuta kati na mbeki moko na moko, mpe tia pembeni mbeki oyo etondi. Atikaki Elize mpe akangaki ekuke sima na ye elongo na bana na ye ya mibali. Bana na ye bazalaki kopesa ye bambeki, mpe azalaki kotondisa yango na mafuta. Tango bambeki nyonso etondaki, alobaki na moko kati na bana na ye ya mibali : — Pesa ngai lisusu mbeki moko. Kasi mwana yango azongiselaki ye : — Bambeki nyonso esili. Kaka na tango yango, mafuta etikaki kobima. Mwasi yango akendeki koyebisa moto na Nzambe. Mpe moto na Nzambe alobaki na ye : — Kende, teka mafuta yango mpe futa niongo na yo ; bongo, yo elongo na bana na yo ya mibali, bokobika na oyo ekotikala. (2 Bakonzi 4:1-7)
Kolimbisa banyongo mbula nyonso ya nsambo – mobeko mpo na bandimi ya Kondimana ya Kala
Na suka ya mibu sambo nyonso, bosengeli kosundola baniongo. Tala ndenge esengeli kosalema : moto nyonso oyo adefisaki ndeko na ye, mwana ya Isalaele, mbongo, asengeli kotikela ye yango. Asengeli te kosenga eloko epai ya ndeko to moninga na ye, moto ya Isalaele, pamba te tango ya kotika baniongo mpo na lokumu na Yawe esili kokoka. Bokoki kosenga niongo epai ya mopaya, kasi bosengeli kosundola baniongo nyonso oyo bandeko na bino badefaki epai na bino. Nzokande, ebongaki te ete mobola azala kati na bino ; pamba te kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo ete bokamata yango lokola libula, akopambola bino koleka, soki botosi malamu Yawe, Nzambe na bino, mpe bosaleli malamu mitindo oyo nazali kopesa bino lelo. Pamba te Yawe, Nzambe na bino, akopambola bino ndenge alakaki ; mpe bino bokodefisa na bikolo ebele, kasi bokodefa te. Bokokonza bikolo ebele, kasi ekolo moko te ekokonza bino. Soki mobola moko amonani kati na bandeko na yo na bingumba ya mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kopesa yo ; okokangela ye motema te mpe okoboya te kosunga ndeko na yo mobola. Nzokande, okofungolela ye maboko mpe okodefisa ye na motema moko, nyonso oyo akozala na yango na bosenga. Keba ete motema na yo ezala na makanisi ya mabe te mpe eloba na yo te : « Mobu ya sambo ekomi pene, mobu ya kotika baniongo, » mpo ete otala ndeko na yo mobola na ndenge ya mabe mpe ozanga kopesa ye eloko. Mpe wana ye akolelalela epai na Yawe na tina na yo, okomema ngambo ya masumu na yo. Osengeli kopesa ye na motema ya esengo kasi na mitema mibale te ; bongo Yawe, Nzambe na yo, akopambola yo na misala na yo nyonso mpe na eloko nyonso oyo maboko na yo ekosimba. Nzokande lokola babola bakozala kaka kati na mokili, ngai nazali kotinda bino ete bofungola maboko na bino epai ya bandeko na bino, epai ya babola mpe epai bato nyonso oyo bakelela kati na mokili na bino. (Deteronomi 15:1-11)
Moyize atindaki bango : « Na suka ya mibu sambo nyonso, na mobu ya kotika baniongo, na tango ya feti ya Bandako ya kapo, tango bana nyonso ya Isalaele bakopusana liboso ya Yawe, Nzambe na bino, na esika oyo akopona, bokotanga mibeko oyo liboso na bango mpo ete matoyi na bango ekoka koyoka. (Deteronomi 31:10-11)
Tokosomba lisusu te epai ya bapaya oyo bazali elongo na biso, biloko nyonso to mbuma nyonso oyo bakoya kotekela biso na mokolo ya Saba to na mikolo mosusu ya bule. Sima na mibu sambo nyonso, tokopemisa mabele mpe tokotikela bato baniongo na biso nyonso. (Neyemi 10:32)
Ndakisa mosusu ya kofuta nyongo
Soki asalaki yo mabe to mpe azali na niongo na yo, tanga yango na moto na ngai. Ezali loboko na ngai moko Polo nde ezali kokoma makambo oyo : ngai moko nakofuta yo niongo yango. Nazali mpe na posa te ya kokanisela yo ete yo mpe ozali na niongo na ngai : niongo yango ezali nde bomoi na yo. (Filemo 18-19)
Nyongo esalelami lokola ndakisa na mateya
Mateya ya Yesu Klisto
Bongo Petelo apusanaki pene ya Yesu mpe atunaki : — Nkolo, mbala boni nasengeli kolimbisa ndeko na ngai tango akosala ngai mabe ? Boni, kino mbala sambo ? Yesu azongisaki : — Nalobi na yo te kino mbala sambo, kasi kino mbala tuku sambo na sambo. Yango wana, Bokonzi ya Likolo ekokani na mokonzi moko oyo alingaki kobongisa elongo na basali na ye makambo na ye ya misolo. Tango abandaki, bamemelaki ye mosali moko oyo azalaki na niongo na ye ya batalanta nkoto zomi. Lokola azalaki na eloko moko te mpo na kofuta, mokonzi na ye atindaki ete bateka ye, mwasi na ye, bana na ye mpe biloko na ye nyonso mpo ete niongo na ye efutama. Kasi mosali yango amibwakaki na makolo ya mokonzi, agumbamaki liboso na ye mpe asengaki : « Yikela ngai mpiko, pamba te nakofuta yo niongo nyonso ! » Mokonzi ya mosali ayokelaki ye mawa, alimbisaki niongo na ye mpe atikaki ye kokende. Kasi tango mosali yango abimaki, akutanaki na moninga na ye ya mosala oyo adefaki epai na ye mbongo ya bibende nkama moko. Akangaki ye, akomaki kofinafina ye na kingo mpe alobaki na ye : « Futa niongo na ngai. » Moninga na ye ya mosala afukamaki mpe asengaki na ye : « Yikela ngai mpiko, nakofuta yo niongo nyonso. » Kasi ye aboyaki ; akendeki kosenga ete babwaka ye na boloko, kino tango akosilisa kofuta niongo nyonso. Tango baninga na ye ya mosala bamonaki ndenge makambo elekaki, bayokaki mawa mingi mpe bakendeki koyebisa makambo nyonso epai ya mokonzi na bango. Bongo mokonzi abengaki mosali wana mpe alobaki na ye : « Mosali mabe ! Ngai nalimbisaki yo niongo nyonso oyo ozalaki na yango epai na ngai, mpo ete osengaki ngai. Boni, osengelaki te koyikela moninga na yo mpiko ndenge ngai nasalaki mpo na yo ? » Lokola mokonzi na ye azalaki na kanda, akabaki ye na maboko ya banyokoli kino tango afutaki niongo nyonso. Ezali ndenge wana nde Tata na Ngai ya Likolo akosala bino soki moko na moko kati na bino alimbisi te ndeko na ye, na motema na ye mobimba. (Matayo 18:21-35)
Yesu alobaki na ye : — Simona, nazali na likambo ya koyebisa yo. Mofarizeo azongisaki : — Moteyi, loba yango. Yesu alobaki : — Moto moko adefisaki bato mibale mbongo. Moto ya liboso asengelaki kozongisa mbongo ya bibende nkama mitano, mpe oyo ya mibale, mbongo ya bibende tuku mitano. Kasi lokola, kati na bango mibale, moko te azalaki na mbongo ya kozongisa, modefisi alimbisaki bango mpo ete bafuta lisusu niongo yango te. Na makanisi na yo, nani kati na bango mibale akolinga modefisi koleka ? Simona azongisaki : — Nakanisi ete ezali moto oyo balimbisi niongo ya mbongo oyo eleki ebele. Yesu alobaki na ye : — Okati malamu ! (Luka 7:40-43)
Mateya ya Paulo
...apasolaki mokanda oyo mibeko na yango ekatelaki biso etumbu, asilisaki bokonzi ya mibeko yango, wana abakaki yango na ekulusu. (Bakolose 2:14)
Kozala ndanga ya nyongo ya moto mosusu (kozwa mokumba/kobeta maboko)
Kozala ndanga ya nyongo ezali malamu te
Moto oyo azangi mayele abetaka tolo mpo na kondima baniongo ya mopaya. (Masese 17:18)
Kamata elamba ya moto oyo alapi ndayi mpo na niongo ya moto mosusu ; bomba yango lokola ndanga soki alapi ndayi mpo na mwasi mopaya. (Masese 20:16)
Kamata elamba ya moto oyo alapi ndayi mpo na niongo ya moto mosusu ; bomba yango lokola ndanga soki alapi ndayi mpo na mwasi mopaya. (Masese 27:13)
Kozala ndanga ya nyongo ezali likama
Moto oyo abetaka tolo mpo na kondima baniongo ya mopaya akomona solo pasi, kasi moto oyo aboyaka kozwa bikateli akozala na kimia. (Masese 11:15)
Kozala te na molongo ya bato oyo batombolaka maboko mpo na kondima kofuta baniongo ya bato mosusu, pamba te soki ozali na yo na makoki ya kofuta te, mpo na nini okolinga ete babotola ata mbeto na yo ya kolala ? (Masese 22:26-27)
Kobima na mokumba ya ndanga
Mwana na ngai, soki ondimi niongo ya moninga na yo, soki obeti tolo mpo na kondima niongo ya mopaya, omikangi nde singa na maloba na yo, omikangi nde na motambo ya maloba ya monoko na yo. Boye, mwana na ngai, sala makambo oyo mpo ete omikangola, pamba te omikabaki na maboko ya moninga na yo ; kende komikitisa liboso na ye mpe tingama na ye, kotika te ete miso na yo elala pongi to enimba ; mikangola na motambo lokola mboloko na maboko ya mobomi banyama ya zamba, mpe lokola ndeke na motambo ya mokangi bandeke. (Masese 6:1-5)